Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:17

[1] Bokumisa Yawe ! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi !

[2] Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye ! Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo !

[3] Bokumisa Ye na lokito ya kelelo ; bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda !

[4] Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina ! Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite !

[5] Bokumisa Ye na lokito ya manzanza ! Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene !

[6] Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe ! Bokumisa Yawe !

Banzembo — Chapters