[1] Nzembo ya Davidi. Mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Yawe. Mokili mpe ezali ya Yawe, elongo na bavandi na yango.
[2] Pamba te ezali Yawe nde atia yango na likolo ya bibale minene mpe apikaki yango na likolo ya miluka.
[3] Nani akokoka komata ngomba ya Yawe ? Nani akokoka kotelema kati na Esika na Ye ya bule ?
[4] Ezali moto oyo azali maboko pembe mpe motema peto, oyo atiaka elikya te na banzambe ya bikeko mpe alapaka ndayi ya lokuta te.
[5] Yawe akopambola ye ; mpe Nzambe, Mobikisi na ye, akokomisa ye sembo.
[6] Ndenge wana nde ezali, ekeke ya bato oyo bakangamaka na Yo, ba-oyo balukaka elongi na Yo, Nzambe ya Jakobi.
[7] Bino bikuke, botombola mitondo na bino ! Bino bikuke ya kala, bomitombola ! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !
[8] Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ? Ezali Yawe, Elombe ya nguya ; Yawe, Elombe ya bitumba.
[9] Bino bikuke, botombola mitondo na bino ! Bino bikuke ya kala, bomitombola ! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !
[10] Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ? Ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azali Mokonzi ya nkembo !