[1] Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
[2] Eyembamaki tango Doegi, moto ya Edomi, akendeki koyebisa Saulo ete Davidi akoti na ndako ya Ayimeleki.
[3] Yo elombe, mpo na nini ozali komikumisa na tina na mabe ? Bolingo ya Nzambe emonanaka mikolo nyonso.
[4] Yo oyo otambolaka na lokuta, lolemo na yo esalaka mabongisi ya libebi, ekosaka lokola mbeli bapelisa malamu.
[5] Olingaka mabe koleka bolamu, lokuta koleka koloba bosolo.
[6] Oh lolemo ya lokuta, olingaka maloba nyonso oyo epanzaka.
[7] Solo, Ye moko Nzambe akobebisa yo mpo na libela, akokanga yo kati na ndako na yo, akobwaka yo libanda mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.
[8] Bato ya sembo bakomona mpe bakokoma na somo, bakotiola ye na maloba oyo :
[9] « Tala moto oyo azalaki te kozwa Nzambe lokola ebombamelo na ye, azalaki kotiela bozwi na ye motema, mpe kobakisa makasi na ye na nzela ya kobebisa bato mosusu. »
[10] Kasi ngai, kati na Ndako na Yo, nazali lokola nzete ya olive oyo etondi na makasa ya mobesu ; natiaka tango nyonso elikya na ngai kati na bolingo monene ya Nzambe, mpo na libela.
[11] Nakosanzola Yo mikolo nyonso, mpo na oyo osali ; mpe nazalaka na elikya kati na Kombo na Yo, pamba te ozali malamu mpo na bayengebene na Yo.