Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:14

[1] Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.

[2] Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala ; seko na seko, ozali.

[3] Yawe, bibale egangaka ! Bibale etombolaka lokito na yango ; bibale etombolaka makelele na yango.

[4] Yawe azali monene makasi, na bisika ya likolo ; aleki lokito ya mayi minene, mpe bambonge milayi ya ebale monene.

[5] Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo ; bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.

Banzembo — Chapters