Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:21

[1] Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe ayanolaki ngai.

[2] Oh Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe wuta na lolemo ya lokuta !

[3] Yo, lolemo ya lokuta, Yawe akopesa yo nini, akofuta yo nini ?

[4] Akobeta yo na makonga ya elombe ya bitumba, oyo ezali ya songe, elongo na makala ya moto ya nzete ya nzube.

[5] Mawa na ngai, mpo ete navandi lokola mopaya kati na Mesheki, kati na bandako ya kapo ya Kedari.

[6] Navandaki tango molayi kati na bato oyo balingaka kimia te.

[7] Ngai, nazali moto ya kimia ; kasi soki kaka nameki koloba na tina na kimia, bango baponaka mbala moko bitumba.

Banzembo — Chapters