[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore.
[2] Yawe, osalelaki mboka na Yo bolamu, ozongisaki bato ya Jakobi, oyo bazalaki na bowumbu,
[3] olimbisaki mabe ya bato na Yo mpe olongolaki masumu na bango nyonso.
[4] Otikaki kanda na Yo nyonso ya makasi mpe okitisaki motema na Yo.
[5] Nzambe Mobikisi na biso, zongela biso ! Longola kanda na Yo na tina na biso !
[6] Boni, okosilikela biso penza mpo na libela ? Okokangela penza biso kanda mpo na tango nyonso ?
[7] Okozongisela biso lisusu bomoi te mpo ete bato na Yo basepela kati na Yo ?
[8] Yawe, talisa biso bolingo na Yo, mpe pesa biso lobiko na Yo !
[9] Yawe, nakoyoka maloba na Nzambe ; pamba te alobaka mpo na kimia ya bato na Ye mpe ya bayengebene na Ye. Kasi tika ete bazongela te botomboki na bango.
[10] Solo, lobiko na Ye ezali pene ya bato oyo batosaka Ye mpo ete nkembo na Ye ewumela kati na mboka na biso.
[11] Bolingo mpe boyengebene ekutanaka, bosembo mpe kimia eyambanaka.
[12] Bosolo ebotaka wuta na mabele, mpe bosembo etalaka wuta na likolo.
[13] Ye moko Yawe akopesa esengo, mpe mabele na biso ekobota bambuma.
[14] Bosembo etambolaka liboso na Ye mpe elakisaka nzela oyo ekolekela.