[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi.
[2] Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, komibomba te wana nazali kobelela Yo.
[3] Yoka ngai mpe yanola ngai. Kati na kolela na ngai, nakomi koyengayenga mpe nazangi kimia,
[4] mpo na maloba ya monguna na ngai mpe kanda ya moto mabe, pamba te bazali kokweyisela ngai misala mabe mpe konyokola ngai na kanda.
[5] Motema na ngai etondi na mawa, mpe somo ya kufa ekangi ngai.
[6] Nakomi kobanga mpe kolenga, somo monene ekangi ngai.
[7] Nakomi komilobela : « Soki nazalaki ata na mapapu ya ebenga, nalingaki kopumbwa mpo na koluka bopemi ;
[8] nalingaki kokima mosika penza, mpo na kokende kovanda ata na esobe.
[9] Solo, na lombangu penza, nalingaki kokende koluka ebombamelo mpo na kokima mopepe makasi mpe ekumbaki. »
[10] Nkolo, bebisa mabongisi ya banguna na ngai mpe kotisa mobulu kati na bango ; pamba te, kati na engumba, nazali komona mobulu mpe bokabwani.
[11] Butu mpe moyi, ezali kotambola na bamir na yango ; misala mabe mpe ya kanza etondi kati na yango.
[12] Banguya oyo ebebisaka ezali kosala kati na yango, minyoko mpe lokuta ezali kosila te.
[13] Soki monguna nde azalaki kofinga ngai, nalingaki kokanga motema ; soki ezalaki mpe moyini nde azalaki kotelemela ngai, nalingaki komibomba mpo ete amona ngai te.
[14] Kasi ezali yo, moto lokola ngai, oyo otambolaka elongo na ngai, molingami mpe moninga na ngai ya motema
[15] oyo nazalaki kokabola elongo na yo, pasi mpe basekele tango tozalaki kokende nzela moko na Tempelo ya Nzambe.
[16] Tika ete kufa ekanga bango na mbalakata mpe bakita ya bomoi kati na mboka ya bakufi ; pamba te mabe etondi kati na bandako mpe mitema na bango.
[17] Mpo na ngai, nabelelaka Nzambe, mpe Yawe akobikisa ngai.
[18] Tongo, midi, pokwa, nasopaka motema na ngai mpe nalelaka, mpe ayokaka mongongo na ngai.
[19] Akopesa ngai kimia, akokangola ngai na bitumba oyo babundisaka ngai ; pamba te bato oyo batelemeli ngai bazali ebele.
[20] Nzambe ayokaka, akosambwisa bango penza ; akonzaka mpo na libela na libela. Babongolaka mitema te mpe batosaka Nzambe te.
[21] Abundisi balingami na ye, abebisi boyokani na ye.
[22] Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
[23] Bwakela Yawe mokumba na yo, akosunga yo ; akotika te ete moto ya sembo akweya mpo na libela.
[24] Mpe Yo, Nzambe, okobwaka basopi makila mpe bakosi kati na libulu ya libebi ; bakokokisa ata kati-kati te ya mikolo ya bomoi na bango. Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo.