[1] Masanzoli. Nzembo ya Davidi. Nakotombola Yo, Nzambe na ngai, Mokonzi na ngai ; nakopambola Kombo na Yo seko na seko.
[2] Mikolo nyonso, nakopambola Yo mpe nakokumisa Kombo na Yo libela na libela.
[3] Yawe azali monene, abongi na lokumu ; moko te akoki komeka mozindo ya monene na Ye.
[4] Bikeke nyonso ekotombola kitoko ya misala na Yo mpe ekopanza sango ya misala na Yo ya minene.
[5] Nakolemba te kotatola bikamwa na Yo mpe kongenga makasi ya nkembo na Yo.
[6] Bakolobela nguya na Yo ya somo, mpe ngai, nakosakola misala na Yo ya minene.
[7] Bakokanisa misala minene ya bolamu na Yo, bakobetela bosembo na Yo maboko.
[8] Yawe atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo.
[9] Yawe azali malamu mpo na bato nyonso, atonda na mawa mpo na bikelamu na Ye nyonso.
[10] Yawe, misala na Yo nyonso ekumisaka Yo ! Tika ete bayengebene na Yo bapambola Yo !
[11] Bazali koloba ete bokonzi na Yo etondi na nkembo mpe bazali kopanza sango ya misala ya nguya na Yo.
[12] Bazali koyebisa bato misala na Yo ya minene mpe kongenga ya nkembo ya bokonzi na Yo.
[13] Ozali Mokonzi seko na seko, mpe bokonzi na Yo ekowumela libela na libela. Yawe akokisaka bilaka na Ye nyonso, asalaka nyonso na bolingo.
[14] Yawe alendisaka bato nyonso oyo bakweyaka, atelemisaka bato nyonso oyo balembaka.
[15] Na bato nyonso oyo batalelaka Yo, opesaka bilei na tango oyo ekoki.
[16] Ofungolaka loboko na Yo mpe okokisaka posa ya nyonso oyo ezali na bomoi.
[17] Yawe azali sembo na nyonso oyo asalaka mpe atonda na bolingo kati na misala na Ye nyonso.
[18] Yawe azali pene ya bato nyonso oyo babelelaka Ye, ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo ;
[19] akokisaka posa ya bato oyo batosaka Ye, ayokaka mpe abikisaka bango tango babelelaka Ye.
[20] Yawe abatelaka bato nyonso oyo balingaka Ye, kasi abebisaka bato nyonso ya mabe.
[21] Tika ete monoko na ngai ekumisa Yawe ! Tika ete bikelamu nyonso epambola Kombo na Ye ya bule libela na libela !