[1] Nzembo ya Davidi. Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ; nakobanga nani ? Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ; nakolenga liboso ya nani ?
[2] Tango bato mabe babundisaka ngai mpo na koluka kosala ngai mabe, ezali bayini mpe banguna na ngai nde baninganaka mpe bakweyaka.
[3] Ata limpinga ezingeli ngai, motema na ngai ekobanga soki moke te ; ata etumba etelemi mpo na koboma ngai, atako bongo, nakozala kaka na elikya makasi.
[4] Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi : nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.
[5] Pamba te, na tango ya pasi, akobatela ngai kati na evandelo na Ye, akobomba ngai kati ya Ndako na Ye ya bule mpe akotelemisa ngai na likolo ya libanga.
[6] Bongo, nakotombola moto na ngai na likolo ya banguna oyo bazingeli ngai ; nakobanda kobonza, na se ya lokito ya esengo, bambeka kati Ndako na Ye ya bule ; nakobanda koyembela Yawe mpe kobetela Ye mindule.
[7] Yawe, yoka mongongo na ngai, soki nabeleli Yo ; salela ngai ngolu mpe yanola ngai.
[8] Motema na ngai elobi na tina na Yo : « Tala elongi na Ye ! » Yawe, nakotala elongi na Yo.
[9] Kopesa ngai mokongo te, kobengana mosali na Yo te na kanda ; osungaki ngai. Kotika ngai te, kosundola ngai te, Nzambe, Mobikisi na ngai.
[10] Ata tata mpe mama na ngai basundoli ngai, Yawe akolokota ngai.
[11] Yawe, lakisa ngai nzela na Yo, tambolisa ngai na nzela ya alima, pamba te banguna na ngai bazali koluka ngai.
[12] Kotika te ete nakangama na motambo ya bayini na ngai, pamba te batatoli ya lokuta batelemi mpo na kokosela ngai makambo, bazali kobimisa maloba mabe.
[13] Nakozalaka na elikya na likambo oyo : nakobika bolamu ya Yawe kati na mokili ya bato ya bomoi.
[14] Talela Yawe ! Zala makasi mpe yika mpiko ! Talela Yawe !