[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
[2] Mpo na Yo Nzambe, bozangi makelele ezali lokumu, kati na Siona ; mpe mpo na Yo, ndayi ekokokisama.
[3] Yo oyo oyokaka mabondeli, bato nyonso bakoya epai na Yo.
[4] Kilo ya bambeba eleki makasi mpo na ngai ; kasi Yo, olimbisaka masumu na biso.
[5] Esengo na moto oyo oponi mpe obulisi mpo ete avanda kati na lopango na Yo. Tokotonda na bolamu ya Ndako na Yo, Tempelo na Yo ya bule.
[6] Nzambe Mobikisi na biso, oyanolaka biso na bosembo, na nzela ya biloko ya somo ; Ozali elikya ya mokili mobimba mpe ya bibale minene.
[7] Alendisaka bangomba, na nguya na Ye ; atondi na mpiko.
[8] Akitisaka makelele ya bibale minene, makelele ya bambonge na yango mpe makelele ya bikolo.
[9] Bato oyo bavandaka na basuka ya mokili babangaka tango bamonaka bikamwa na Yo ; osalaka ete este mpe weste eganga na esengo.
[10] Opambolaka mabele, ofulukisaka yango, otondisaka yango na bozwi. Otondisaka moluka ya Nzambe na mayi, obongiselaka bato ble, pamba te otondisaka mayi mpo na yango.
[11] Olekisaka mayi kati na mikala, okweyisaka mipiku ya mabele, osopelaka mabele mayi mpe opambolaka milona.
[12] Opambolaka mobu na bolamu na Yo, mpe banzela mike oyo olekelaka ebotaka ebele.
[13] Bilanga ya esobe etondaka na bilei, mpe bangomba mike etondaka na esengo.
[14] Bilanga etondaka na bameme mpe bantaba ; mabwaku etondaka na ble, egangaka na esengo mpe eyembaka.