Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:34

[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba na lindanda. Nzembo ya Azafi.

[2] Nzambe ayebani kati na Yuda ; Kombo na Ye ezali monene kati na Isalaele.

[3] Ndako na Ye ya kapo ezali na Salemi ; mpe esika na Ye ya kovanda ezali na Siona.

[4] Ezali kuna nde abukaki makonga ya makasi, banguba, mipanga mpe bibundeli nyonso ya bitumba.

[5] Ozali kongenga lokola mwinda, otonda na lokumu koleka bangomba ya babotoli bomengo ya bitumba.

[6] Bilombe nyonso ya mpiko bakweyisamaki, balalaki pongi na bango ya suka ; basoda nyonso bakokaki lisusu te kotombola maboko.

[7] Nzambe ya Jakobi, na kanda na Yo, bato oyo babundaka likolo ya bampunda elongo na bampunda bakweyi na somo.

[8] Solo, ozali somo ! Nani akokoka kotelema liboso na Yo soki osiliki ?

[9] Wuta na likolo, osalaka ete mokano na Yo eyokana na matoyi ya bato ; mokili ekomaka na kobanga mpe evandaka kimia

[10] tango, Yo Nzambe, otelemaka mpo na kosambisa mpe kobikisa banyokolami nyonso ya mokili.

[11] Pamba te kanda makasi ya bato esanzolaka Yo, mpe olataka kanda ya batikali.

[12] Epai ya Yawe, Nzambe na bino, bopesa bilaka mpe bokokisa yango. Tika ete bato nyonso oyo bazingeli Ye bamemela Nzambe ya somo makabo !

[13] Abukaka lolendo ya bakambi, mpe bakonzi ya mokili babangaka Ye.

Banzembo — Chapters