Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:39

[1] Nzembo ya Davidi, mowumbu ya Yawe. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

[2] Kati na motema na ngai, nazali na sango kowuta na Nzambe na tina na bato mabe oyo batondi na masumu : Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te na miso na bango.

[3] Bamipesaka lokumu makasi, bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.

[4] Minoko na bango ebimisaka maloba mabe mpe lokuta, baboyaka kosala na bokebi mpe kosala bolamu.

[5] Ezala na bambeto na bango, basalaka kaka mabongisi ya kosala mabe, batambolaka te mpo na kosala bolamu mpe baboyaka mabe te.

[6] Yawe, bolingo na Yo ekenda kino na likolo, boyengebene na Yo kino na mapata.

[7] Bosembo na Yo ezali lokola bangomba ya Nzambe, mikano na Yo ezali mozindo lokola lubwaku ya molayi. Yawe, obikisaka bato mpe banyama.

[8] Oh Nzambe, tala ndenge nini bolingo na Yo ezali motuya ! Bato bazwaka ebombamelo na elili ya mapapu na Yo.

[9] Baliaka mpe batondaka bilei ya Ndako na Yo, mpe omelisaka bango mayi kowuta na bolingo monene na Yo.

[10] Pamba te etima ya bomoi ezali elongo na Yo ; kati na pole na Yo nde tomonaka pole.

[11] Koba kotalisa bolingo na Yo epai ya bato oyo bayebi Yo, mpe bosembo na Yo epai ya bato ya mitema alima.

[12] Tika ete bato ya lolendo bakoma te kino epai na ngai, mpe tika ete bato mabe babengana ngai te.

[13] Tala ndenge nini bato ya misala mabe bakweyi, balali na mabele, bazangi makoki ya kotelema.

Banzembo — Chapters