[1] Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Nasepelaka tango balobaka na ngai : « Tokende na Tempelo ya Yawe ! »
[2] Yelusalemi, makolo na biso etelemi na bikuke na yo !
[3] Yelusalemi, engumba oyo etongama malamu ; engumba oyo biteni na yango ekangana esika moko.
[4] Ezali kuna nde mabota ekendaka, mabota ya Yawe, kolanda mibeko kati na Isalaele, mpo na kosanzola Kombo ya Yawe.
[5] Pamba te bakiti ya bokonzi ya bato oyo basalelaka bosembo ezali kuna, bakiti ya bokonzi mpo na ndako ya Davidi.
[6] Bosenga kimia ya Yelusalemi ! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia !
[7] Tika ete kimia ezala kati na yo mpe kati na bandako na yo ya bokonzi !
[8] Likolo ya bolingo na ngai mpo na bandeko mpe balingami na ngai, nalobi : « Tika ete kimia ezala kati na yo ! »
[9] Likolo ya bolingo na ngai mpo na Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso, nasengi bolamu mpo na yo.