Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:42

[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

[2] Yawe, mokonzi azali kosepela na nguya na Yo; Tala ndenge nini elonga oyo opesi ye epesi ye esengo monene !

[3] Okokisi posa ya motema na ye mpe opimeli ye te oyo azalaki kosenga Yo.

[4] Oyei epai na ye na mapamboli ya motuya. Na moto na ye, olatisi ye motole ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu.

[5] Asengaki Yo bomoi, mpe opesaki ye yango ; opesaki ye bomoi molayi mpe ya libela na libela.

[6] Nkembo na ye ezali monene mpo na lobiko oyo opesaki ye ; olatisaki ye na kongenga mpe na lokumu.

[7] Solo, okomisi ye etima ya mapamboli ya seko na seko ; okomisaki ye moto ya esengo na miso na Yo.

[8] Mokonzi atiaka elikya na Yawe, aninganaka te mpo na bolingo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.

[9] Loboko na Yo ekokanga banguna na Yo nyonso ; loboko na Yo ya mobali ekokanga bayini na Yo.

[10] Tango okomimonisa, okokomisa bango lokola fulu ya moto. Yawe akosilisa koboma bango na kanda na Ye, mpe moto ekozikisa bango.

[11] Okolimwisa mabota na bango na mokili, mpe bakitani na bango, kati na bana ya bato.

[12] Atako bakani kosala Yo mabe, atako basali mabongisi ya mabe mpo na kotelemela Yo, bakotikala kolonga ata moke te ;

[13] pamba te okobengana bango tango okobwakela bango bambanzi ya tolotolo na Yo.

[14] Yawe, telema na nguya na Yo ! Tokoyemba nguya na Yo na nzela ya banzembo.

Banzembo — Chapters