[1] Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe atongi ndako te, batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ; soki Yawe akengeli engumba te, bakengeli bazali kosala na pamba.
[2] Ezali na pamba nde, bino mpe, bolamukaka na tongo makasi, bolalaka noki te mpe bosalaka makasi mpo na kozwa bilei ; pamba te Nzambe apesaka bilei yango kaka na balingami na Ye, wana bazali nanu kolala pongi.
[3] Bana bazali libula kowuta na Yawe, mpe kobota bana ezali lifuti.
[4] Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba, ndenge wana mpe bana oyo moto aboti na bolenge na ye bazali.
[5] Esengo na moto oyo atondisi makonga kati na ebombelo na ye ya makonga ! Akokufa soni ata moke te tango akosamba elongo na banguna na ye na ekuke ya engumba.