Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:46

[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi.

[2] Oh Nzambe, yoka koganga na ngai, yoka na bokebi losambo na ngai.

[3] Wuta na suka ya mokili, nazali kobelela Yo, motema na ngai ebukani ! Mema ngai na libanga oyo eleki likolo epai wapi nakokoka te kokoma ngai moko.

[4] Pamba te, ozali ebombamelo na ngai, ndako molayi batonga makasi, liboso ya banguna na ngai.

[5] Posa ya motema na ngai ezali : kovanda tango nyonso kati na Ndako na Yo mpe kozwa ebombamelo na se ya mapapu na Yo.

[6] Pamba te Yo Nzambe, oyokaki bandayi na ngai, opesaki ngai libula ya bato oyo batosaka Kombo na Yo.

[7] Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi ; tika ete awumela na bomoi.

[8] Tika ete awumela na bokonzi libela na libela liboso ya Nzambe ! Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye.

[9] Boye, nakoyemba mikolo nyonso mpo na lokumu ya Kombo na Yo, mpe nakokokisa bandayi na ngai mokolo na mokolo.

Banzembo — Chapters