[1] Esengo na bato oyo bazangi pamela mpe batambolaka kolanda mibeko ya Yawe !
[2] Esengo na bato oyo babatelaka malako na Ye mpe balukaka Ye na mitema na bango mobimba !
[3] Basalaka mabe te, kasi balandaka banzela ya Nzambe.
[4] Opesaki mibeko mpo ete etosama malamu.
[5] Tika ete nabongisa etamboli na ngai mpo ete natosa mitindo na Yo !
[6] Na bongo, nakoyoka soni te tango nakotosa mibeko na Yo nyonso.
[7] Nakosanzola Yo na motema ya sembo wana nakoyekola mibeko ya bosembo na Yo.
[8] Nalingi kotosa mitindo na Yo ; kosundola ngai libela te !
[9] Ndenge nini elenge akoki kowumela na nzela ya sembo ? Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.
[10] Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba ; batela ngai mpo ete napengwa te mosika ya mibeko na Yo !
[11] Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.
[12] Yawe, tika ete opambolama ! Lakisa ngai mitindo na Yo !
[13] Na monoko na ngai, natangaka mibeko na Yo nyonso.
[14] Nasepelaka kotambola kolanda malako na Yo lokola nde nazali na bomengo nyonso.
[15] Nakanisaka malako na Yo mpe natambolaka na banzela na Yo.
[16] Nasepelaka mingi na malako na Yo mpe nabosanaka liloba na Yo te.
[17] Salela ngai, mosali na Yo, bolamu mpo ete nabika mpe natosa liloba na Yo.
[18] Fungola miso na ngai mpo ete namona kitoko ya mibeko na Yo.
[19] Nazali mopaya awa na mokili ; kobombela ngai mibeko na Yo te.
[20] Molimo na ngai ezalaka tango nyonso na posa makasi ya koyeba mibeko na Yo.
[21] Otelemelaka bato ya lofundu, bato oyo balakelama mabe mpe bapengwaka mosika ya mibeko na Yo.
[22] Longola soni mpe kotiolama na bomoi na ngai, pamba te natosaka malako na Yo.
[23] Ezala soki bakambi basali likita mpe bayokani kotelemela ngai, mosali na Yo, nakokanisa kaka mitindo na Yo.
[24] Malako na Yo esepelisaka ngai makasi, epesaka ngai toli.
[25] Nakangami na putulu ; batela bomoi na ngai kolanda liloba na Yo.
[26] Nayebisaki Yo banzela na ngai, mpe oyanolaki ngai ; lakisa ngai mibeko na Yo !
[27] Sala ete nasosola nzela ya mitindo na Yo mpo ete nakanisa misala minene na Yo !
[28] Nazali kolela mpo na pasi na motema ; pesa ngai mpiko kolanda liloba na Yo.
[29] Mema ngai mosika ya nzela ya lokuta ; mpe, na boboto na Yo, teya ngai mobeko na Yo.
[30] Naponaki nzela ya bosolo ; natambolaka kolanda mibeko na Yo.
[31] Nakangami na malako na Yo ; Yawe, koyokisa ngai soni te.
[32] Nakimaka mbangu kati na nzela ya mibeko na Yo, pamba te opesaka ngai bososoli na yango.
[33] Yawe, teya ngai nzela ya mitindo na Yo mpo ete nabatela yango kino na suka.
[34] Pesa ngai bososoli mpo ete natosa mibeko na Yo mpe nalanda yango na motema na ngai mobimba.
[35] Tambolisa ngai kati na nzela ya mibeko na Yo, pamba te nasepelaka na yango.
[36] Sala ete motema na ngai esepela na malako na Yo, kasi na bomengo te !
[37] Longola miso na ngai na makambo ya pamba, batela bomoi na ngai kati na banzela na Yo !
[38] Kokisela mosali na Yo bilaka oyo opesaki mpo na bato oyo batosaka Yo.
[39] Longola mosika na ngai soni oyo nabangaka, pamba te mibeko na Yo ezali malamu.
[40] Nasepelaka makasi na mibeko na Yo ; batela bomoi na ngai kati na bosembo na Yo !
[41] Yawe, tika ete bolingo ekomela ngai, mpe lobiko na Yo, kolanda elaka na Yo ;
[42] bongo nakokoka kozwa eyano ya kopesa na mofingi na ngai, pamba te natiaka elikya na liloba na Yo.
[43] Tika ete monoko na ngai elobaka kaka bosolo, pamba te natiaka elikya kati na mibeko na Yo.
[44] Nakotosa mibeko na Yo tango nyonso, mpe libela na libela.
[45] Nakobika na bonsomi ya solo, pamba te nasepelaka kotosa mitindo na Yo.
[46] Nakolobela malako na Yo liboso ya bakonzi na kozanga koyoka soni.
[47] Nasepelaka mingi na mibeko na Yo mpe nalingaka yango mingi.
[48] Nalapi ndayi mpo na mibeko na Yo, oyo nalingaka, mpe nakokanisa mitindo na Yo.
[49] Kanisa makambo oyo olobaki na mosali na Yo, pamba te opesaki ngai elikya.
[50] Kati na pasi na ngai, liloba na Yo ebondisaka ; batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo.
[51] Solo, bato ya lolendo batiolaki ngai makasi ; kasi ngai, natikalaki kopengwa te na mibeko na Yo.
[52] Yawe, tango nakanisaka mikano na Yo ya kala, nazwaka kati na yango kobondisama.
[53] Nayokaka pasi mingi na motema tango namonaka bato mabe kosundola mibeko na Yo.
[54] Nakoma koyemba mitindo na Yo na bisika nyonso epai wapi nazali moleki nzela.
[55] Yawe, nakanisaka Yo na butu mpo ete nabatela mibeko na Yo ;
[56] pamba te libula na ngai ezali : kotosa mibeko na Yo.
[57] Yawe, nalobi lisusu ete libula na ngai ezali : kotosa liloba na Yo.
[58] Na motema na ngai mobimba, nalukaka kosepelisa Yo ; salela ngai ngolu kolanda bilaka na Yo !
[59] Natali malamu etamboli na ngai mpe namizongisi kati na malako na Yo.
[60] Natosaka mibeko na Yo noki, nazelisaka te.
[61] Solo, mitambo ya bato mabe ekangaki ngai, kasi ngai nabosanaki te mibeko na Yo.
[62] Na kati-kati ya butu, nalamukaka mpo na kokumisa Yo likolo na mibeko na Yo ya sembo.
[63] Nazali moninga ya bato nyonso oyo batosaka Yo mpe babatelaka mitindo na Yo.
[64] Yawe, mokili etondi na bolingo na Yo ; lakisa ngai mitindo na Yo !
[65] Yawe, salela mosali na Yo bolamu kolanda liloba na Yo.
[66] Teya ngai bolamu ya bososoli mpe ya mayele, pamba te namipesaka na mibeko na Yo.
[67] Liboso ete obeta ngai, nazalaki mopengwi ; kasi sik’oyo, nakomi kotosa liloba na Yo.
[68] Ozali malamu mpe osalaka makambo ya malamu ; teya ngai mitindo na Yo !
[69] Bato ya lolendo bakoselaka ngai makambo ; kasi ngai, natosaka mitindo na Yo na motema na ngai mobimba.
[70] Mitema na bango ezali mabanga ; kasi ngai, nasepelaka na mibeko na Yo.
[71] Ezalaki penza malamu mpo na ngai ete obeta ngai, mpo ete nayekola mitindo na Yo.
[72] Mpo na ngai, mibeko oyo ozwaki mpe osakolaki na monoko na Yo ezali malamu koleka biloko nkoto moko ya wolo mpe ya palata.
[73] Osalaki mpe olendisaki ngai na maboko na Yo, pesa ngai mayele mpo ete nayekola mibeko na Yo !
[74] Tango bato oyo batosaka Yo bamonaka ngai, basepelaka makasi, mpo ete natiaka elikya na liloba na Yo.
[75] Yawe, nayebi malamu ete mibeko na Yo ezali sembo, mpe ete ezali kaka mpo na bolingo na Yo nde obetaki ngai.
[76] Tika ete bolingo na Yo ebondisa ngai, kolanda elaka na Yo epai ya mosali na Yo !
[77] Talisa ngai mawa na Yo mpo ete nabika, pamba te nasepelaka na mibeko na Yo.
[78] Tika ete bato wana ya lofundu, oyo bamonisaka ngai pasi na kozanga tina, bakufa soni ! Kasi ngai nakokanisa kaka mibeko na Yo.
[79] Tika ete bato oyo batosaka Yo, ba-oyo bayebi malako na Yo, bazongela ngai.
[80] Tika ete motema na ngai ezanga pamela mpo na kotosa mitindo na Yo, mpo ete nakufa soni te.
[81] Natondi na posa ya lobiko na Yo, nazali na elikya kati na liloba na Yo.
[82] Miso na ngai elembi kozela kokokisama ya elaka na Yo ; nakomi komituna : « Okobondisa ngai tango nini ? »
[83] Nakomi lokola mbeki oyo ezali kokawuka na milinga, nzokande nabosanaka mitindo na Yo te.
[84] Mikolo ya bomoi ya mosali na Yo ezali motango boni ? Mokolo nini okopesa banyokoli na ngai etumbu ?
[85] Bato ya lolendo batimoli mabulu mpo na kokanga ngai, baboyi kotosa mibeko na Yo.
[86] Mibeko na Yo nyonso ezali sembo ; kasi bazali konyokola ngai kaka pamba ; yaka kosunga ngai !
[87] Etikali moke mpo ete balongola ngai na mokili ; kasi atako bongo, nasundoli mibeko na Yo te.
[88] Kati na bolingo na Yo, batela bomoi na ngai mpo ete natosa malako na Yo.
[89] Yawe, liloba na Yo ezali mpo na seko, epikama kati na likolo ;
[90] boyengebene na Yo ekowumela seko na seko. Okela mabele, mpe ezali kaka kino na mokolo ya lelo ;
[91] opesa mibeko, mpe ezali kaka kino na mokolo ya lelo, pamba te nyonso kati na mokili mobimba epesaka Yo lokumu.
[92] Soki nasepelaki na mibeko na Yo te, mbele nakufa kala kati na pasi na ngai.
[93] Nakotikala kobosana ata moke te mitindo na Yo, pamba te obatelaka bomoi na ngai na nzela na yango.
[94] Bikisa ngai, pamba te nazali moto na Yo mpe natosaka mitindo na Yo !
[95] Bato mabe bazali koluka koboma ngai, kasi ngai nakangami kaka na malako na Yo.
[96] Na nyonso oyo emonanaka lokola ya kokoka, namonaki mondelo ; kasi mibeko na Yo ezalaka na mondelo te.
[97] Nalingaka mibeko na Yo mingi ! Nakanisaka yango mikolo nyonso.
[98] Mibeko na Yo ekomisaka ngai moto ya bwanya koleka banguna na ngai ; ezalaka elongo na ngai tango nyonso.
[99] Naleki balakisi na ngai nyonso na mayele, pamba te nakanisaka malako na Yo.
[100] Naleki mibange na bososoli, pamba te natosaka mibeko na Yo.
[101] Natambolaka te na banzela nyonso ya mabe mpo na kotosa liloba na Yo.
[102] Nakangamaka na mibeko na Yo, pamba te Yo moko nde oteyaka ngai yango.
[103] Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi na monoko na ngai ! Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.
[104] Mitindo na Yo ekomisi ngai moto ya bososoli ; yango wana nayinaka nzela nyonso ya mabe.
[105] Liloba na Yo ezali mwinda mpo na makolo na ngai, mpe pole mpo na nzela na ngai.
[106] Nalapaki ndayi oyo mpe nakokokisa yango : « Nakotosaka mibeko ya bosembo na Yo. »
[107] Motema na ngai etutami makasi ; Yawe, batela bomoi na ngai kolanda liloba na Yo.
[108] Yawe, ndima likabo ya bibebu na ngai, mpe teya ngai mibeko na Yo.
[109] Solo, nakutanaka tango nyonso na makama, kasi nabosanaka mibeko na Yo te.
[110] Bato mabe batiaka mitambo mpo ete nakweya, kasi nakangamaka kaka na mibeko na Yo.
[111] Malako na Yo ezali libula na ngai mpo na libela, esalaka esengo ya motema na ngai.
[112] Nazwa mokano ya kotambola kolanda mitindo na Yo, tango nyonso, kino na suka.
[113] Nayinaka bato ya mitema mibale, kasi nalingaka nde mibeko na Yo.
[114] Ozali ebombamelo mpe nguba na ngai ; natiaka elikya kati na liloba na Yo.
[115] Bato ya misala mabe, bokende mosika na ngai ! Nakotosa mibeko ya Nzambe na ngai !
[116] Sunga ngai kolanda elaka na Yo, mpe nakobika ; koyokisa elikya na ngai soni te.
[117] Sunga ngai mpo ete nabika ; nakotikala kobosana mitindo na Yo ata moke te.
[118] Obwakaka bato nyonso oyo bapesaka mitindo na Yo mokongo, pamba te mokano na bango ezalaka ya lokuta.
[119] Olongolaka bato nyonso ya mabe ya mokili lokola bosoto ; yango wana nalingaka malako na Yo.
[120] Nalengaka na somo liboso na Yo mpe nabangaka mikano na Yo.
[121] Natambolaka na bosembo mpe bosolo ; kokaba ngai na maboko ya banyokoli na ngai te !
[122] Kamata mokumba ya bolamu na ngai, mosali na Yo ; tika ete bato ya lolendo banyokola ngai te.
[123] Miso na ngai elembi kozela lisungi kowuta na Yo mpe kokokisama ya bosembo na Yo kolanda elaka na Yo.
[124] Salela ngai, mosali na Yo, kolanda bolingo na Yo, lakisa ngai mitindo na Yo.
[125] Nazali mosali na Yo ; pesa ngai mayele mpo ete nasosola malako na Yo.
[126] Yawe, tango ya kosala ekoki ; pamba te bazali kobuka mibeko na Yo !
[127] Yango wana nalingaka mibeko na Yo koleka wolo, koleka kutu wolo ya peto ;
[128] namonaka mpe malako na Yo nyonso alima ; nzokande, nayinaka lokuta nyonso.
[129] Malako na Yo ezali kitoko, yango wana nabatelaka yango.
[130] Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka, epesaka bazoba mayele.
[131] Monoko na ngai efungwamaka makasi likolo ya kozela, pamba te nazali na posa makasi ya mibeko na Yo.
[132] Baluka epai na ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda ndenge okata mpo na bato oyo balingaka Kombo na Yo.
[133] Lendisa bomoi na ngai na nzela ya liloba na Yo mpe pekisa mabe ete ekonza ngai te.
[134] Kangola ngai wuta na minyoko ya bato, mpe nakotosa mibeko na Yo.
[135] Tika ete elongi na Yo engengela ngai, mosali na Yo ; lakisa ngai mibeko na Yo !
[136] Miso na ngai ezali kosopa mpinzoli, pamba te mibeko na Yo ezali kotosama te.
[137] Yawe, ozali sembo, mpe mibeko na Yo ezali alima ;
[138] osalaki malako na Yo na bosembo mpe na bolingo.
[139] Mpo ete banguna na ngai bazwaka liloba na Yo na motuya te, nayokaka kanda makasi komata ngai na motema.
[140] Nzokande liloba na Yo ezali penza peto ; mpe ngai, mosali na Yo, nalingaka yango.
[141] Atako nazali moke mpe batiolaka ngai, kasi nabosanaka mitindo na Yo te.
[142] Bosembo na Yo ekotikala bongo mpo na libela, ekotikala kobongwana te ; mpe mibeko na Yo ezali solo.
[143] Pasi ekangi ngai, mpe mayele esili ngai ; kasi mibeko na Yo epesaka ngai esengo.
[144] Malako na Yo ezali sembo mpo na libela ; pesa ngai bososoli mpo ete nabika !
[145] Nazali kobelela Yo na motema na ngai mobimba : « Yawe, yanola ngai ; nakotosa mitindo na Yo !
[146] Nazali kobelela Yo : bikisa ngai, mpo ete natosa malako na Yo !
[147] Nalamukaka liboso ete tongo etana mpo na kobelela Yo, nazali na elikya kati na liloba na Yo.
[148] Nalamukaka na kati-kati ya butu mpo na kokanisa mitindo na Yo.
[149] Yoka ngai na bolingo na Yo ! Yawe, batela bomoi na ngai kolanda mibeko na Yo !
[150] Bato oyo basalaka mabongisi mabe, oyo batosaka mibeko na Yo te, bazali koya pene na ngai.
[151] Nzokande Yo, Yawe, ozali pene, mpe mibeko na Yo nyonso ezali bosolo.
[152] Wuta kala, ngai nayebi, na nzela ya malako na Yo, ete otia mibeko yango mpo na libela.
[153] Mona malamu pasi na ngai mpe kangola ngai, pamba te nabosanaka mibeko na Yo te.
[154] Kota likambo na ngai mpe kangola ngai, batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo !
[155] Lobiko ezalaka mosika ya bato mabe, pamba te bamonaka pamba mitindo na Yo.
[156] Yawe, mawa na Yo ezali monene penza ; batela bomoi na ngai kolanda mibeko na Yo.
[157] Banyokoli mpe banguna na ngai bazali solo ebele, kasi ngai nakangamaka kaka na malako na Yo.
[158] Natalaka na nkele bato oyo bazangi kondima, ba-oyo batosaka liloba na Yo te.
[159] Yawe, tala ndenge nalingaka mitindo na Yo ! Batela bomoi na ngai kolanda bolingo na Yo.
[160] Moboko ya liloba na Yo ezali bosolo, mpe mibeko nyonso ya bosembo na Yo ezali mpo na libela.
[161] Bakambi banyokolaka ngai kaka pamba, kasi kaka liloba na Yo nde ebangisaka motema na ngai.
[162] Nasepelaka na liloba na Yo lokola moto oyo azwi bomengo ebele ya bitumba.
[163] Nayinaka lokuta mpe nayokaka yango nkele, nalingaka nde mibeko na Yo.
[164] Nakumisaka Yo mbala sambo na mokolo mpo na mibeko ya bosembo na Yo.
[165] Bato oyo balingaka mibeko na Yo bazali bato na kimia monene, mpe eloko moko te ekobetisa bango lisusu mabaku.
[166] Yawe, natielaka Yo motema mpo ete obikisa ngai, mpe natosaka mibeko na Yo.
[167] Natosaka malako na Yo, pamba te nalingaka yango makasi.
[168] Natosaka malako mpe mibeko na Yo, pamba te oyebi banzela na ngai nyonso.
[169] Yawe, tika ete koganga na ngai ekoma kino epai na Yo ! Pesa ngai bososoli kolanda liloba na Yo !
[170] Tika ete mabondeli na ngai ekoma kino epai na Yo ! Kangola ngai kolanda elaka na Yo.
[171] Tika ete bibebu na ngai ekumisa Yo, pamba te olakisaka ngai mitindo na Yo !
[172] Tika ete lolemo na ngai eyemba liloba na Yo, pamba te mibeko na Yo nyonso ezali sembo.
[173] Tika ete loboko na Yo esunga ngai, pamba te napona kolanda malako na Yo.
[174] Yawe, nazali na posa makasi ya lobiko na Yo ; mibeko na Yo epesaka ngai esengo.
[175] Tika ete nazala na bomoi mpo na kokumisa Yo, mpe tika ete mibeko na Yo esunga ngai !
[176] Nazali koyengayenga lokola meme oyo ebungi ; luka ngai, mosali na Yo, pamba te nabosani mibeko na Yo te. »