[1] Bokumisa Yawe ! Oh molimo na ngai, kumisa Yawe !
[2] Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba, nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso nakozala na bomoi.
[3] Botia elikya te na bakambi to na bato oyo bazangi makoki ya kobikisa.
[4] Soki bakufi, bazongaka na mabele, mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka.
[5] Esengo na moto oyo Nzambe ya Jakobi azali mosungi na ye, oyo atiaka elikya na ye kati na Yawe, Nzambe na ye !
[6] Yawe akelaki Likolo mpe mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; azali sembo seko na seko.
[7] Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala ; abimisaka bakangami na boloko.
[8] Yawe abikisaka miso ya bakufi miso ; Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama ; Yawe alingaka bato ya sembo.
[9] Yawe abatelaka bapaya, asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, kasi abebisaka banzela ya bato mabe.
[10] Yawe azali Mokonzi seko na seko ; Nzambe na yo, oh Siona, libela na libela ! Bokumisa Yawe !