[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda.
[2] Nzambe, bosembo na ngai, soki nabeleli Yo, yanola ngai. Kangola ngai na pasi, salela ngai ngolu, mpe yoka libondeli na ngai.
[3] Bino bato, kino tango nini bokoyokisa nkembo na ngai soni ? Kino tango nini bokomisepelisa na makambo ya pamba mpe bokolanda makambo ya lokuta ?
[4] Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko mosali oyo azali sembo na miso na Ye ; Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.
[5] Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; soki bolali na mbeto, bolukaka kososola makambo mpe bovandaka kimia.
[6] Bobonzaka bambeka kolanda mibeko mpe botiaka elikya na bino kati na Yawe.
[7] Bato mingi bazali kotuna : « Nani akomemela biso bolamu ? » Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo.
[8] Tondisa motema na ngai na esengo soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.
[9] Nakolala mpe nakozwa pongi na kimia, pamba te, Yo moko Yawe, osalaka ete navanda na kimia.