[1] Nzembo ya bana ya Kore.
[2] Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, kati na engumba ya Nzambe na biso, ngomba na Ye ya bule.
[3] Ezali kitoko, ngomba moke oyo esalaka esengo ya mokili mobimba, ngomba Siona ! Ngambo na yango ya Nor nde ezali engumba ya Mokonzi Monene.
[4] Nzambe azali kati na bandako na yango ya bokonzi, amimonisi lokola ndako batonga makasi.
[5] Pamba te bakonzi basanganaki, batambolaki nzela moko.
[6] Kasi tango kaka bamonaki yango, bakamwaki mpe bakimaki na somo.
[7] Mbala moko, bakomaki kolenga wana lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota
[8] to lokola mopepe ya Este oyo apanzaka masuwa ya Tarsisi.
[9] Ndenge kaka bayebisaki biso, ndenge mpe tomonaki kati na engumba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, kati na engumba ya Nzambe na biso ; Nzambe alendisaka yango seko na seko.
[10] Nzambe, kati na Tempelo na Yo, tokanisaka bolingo na Yo.
[11] Nzambe, lokumu na Yo epanzani kino na suka ya mokili, ndenge moko na Kombo na Yo ; loboko na Yo ya mobali etondi na bosembo.
[12] Ngomba ya Siona ezali kosepela, bamboka ya Yuda etondi na esengo mpo na mikano na Yo.
[13] Botambola pembeni ya Siona, bokende zingazinga na yango, botanga bandako na yango ya milayi.
[14] Botala lopango na yango, botala malamu bandako na yango mpo ete bopesa sango epai ya bato oyo bakoya na sima.
[15] Pamba te Nzambe wana azali Nzambe na biso seko na seko mpe libela na libela ; akotambolisa biso, ezala kino na kufa.