[1] Nzembo ya Azafi. Solo, Nzambe azali malamu mpo na Isalaele, mpo na bato oyo bazali mitema peto.
[2] Nzokande mpo na ngai, etikalaki moke ete makolo na ngai eselumuka, etikalaki moke ete nakweya,
[3] pamba te nazalaki kolula bato ya lofundu tango nazalaki komona kimia ya bato mabe.
[4] Kino na kufa na bango, bazalaka na mitungisi te, nzoto na bango ezalaka sembesembe.
[5] Kati na bango, moko te amonaka pasi oyo bato nyonso bamonaka ; babelaka te bokono oyo ezwaka bato.
[6] Yango wana, lolendo ekoma lokola mayaka na bakingo na bango, mpe makambo na kanza ekoma lokola elamba na bango.
[7] Miso na bango engengaka na bilongi etonda na mafuta ; mitema na bango esalaka kaka mabongisi ya mabe ;
[8] batiolaka mpe balobaka mabe, bagangelaka minyoko.
[9] Minoko na bango etombokelaka Likolo, mpe lolemo na bango esakanelaka mokili.
[10] Yango wana bato balandaka bango mpe bamelaka maloba na bango lokola mayi.
[11] Balobaka : « Nzambe akoyeba ndenge nini ? Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali ata na boyebi ? »
[12] Tala ndenge bato mabe bazalaka : tango nyonso, bazalaka na mitungisi te, mpe bomengo na bango emataka se komata.
[13] Solo, ezali kaka na pamba nde nabatelaki motema na ngai peto ; ezali kaka na pamba nde nasukolaki maboko na ngai mpo ete nasala mabe te !
[14] Mikolo nyonso, nanyokwamaka ; mpe tongo nyonso, nazwaka etumbu.
[15] Soki nalobi : « Nakoloba lokola bango, » wana nateki penza lokumu ya libota na Yo.
[16] Tango nakanisaki mpo na koluka kososola, nayokaki pasi na motema
[17] kino nakendeki na Esika ya bule ya Nzambe mpe nasosolaki ndenge nini bakosuka.
[18] Solo, otielaka bango biloko ya moselu, okweyisaka bango kati na libebi.
[19] Ndenge nini babebisamaka mbala moko, bakomaka na suka, mpe somo elimwisaka bango !
[20] Ndenge ndoto elimwaka soki moto alamuki na pongi, Nkolo, olimwisaka lisolo ya bomoi na bango tango kaka otelemaka.
[21] Tango motema na ngai ezalaki kotomboka mpe molimo na ngai emitungisaki,
[22] nasilaki mayele, nakomaki lokola zoba, nakomaki lokola nyama liboso na Yo.
[23] Nzokande, nazalaka tango nyonso elongo na Yo ; osimba ngai na loboko na ngai ya mobali.
[24] Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo, mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo.
[25] Kuna na Likolo, nani azali mpo na ngai soki Yo te ? Mpe awa na mokili, nasepela na nani soki na Yo te ?
[26] Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba ; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.
[27] Bato nyonso oyo bazali mosika na Yo bakokufa ; obebisaka bato nyonso oyo batosaka Yo te.
[28] Kasi mpo na ngai, ezali malamu kozala pene ya Nzambe. Nakomisi Nkolo Yawe ebombamelo na ngai, mpo na kopanza sango ya misala na Yo nyonso.