[1] Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
[2] Tika ete Isalaele aloba : « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »
[3] Tika ete bakitani ya Aron baloba : « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »
[4] Tika ete bato oyo batosaka Yawe baloba : « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »
[5] Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ngai, abikisaki ngai.
[6] Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te ; bato bakoki kosala ngai nini ?
[7] Yawe azali mpo na ngai, ayaka kosunga ngai ; boye natalaka banguna na ngai na miso lokola molongi.
[8] Eleki malamu koluka ebombamelo kati na Yawe na esika ya kotia elikya na bato.
[9] Eleki malamu koluka ebombamelo kati na Yawe na esika ya kotia elikya kati na bato minene ya mokili.
[10] Bikolo nyonso ezingelaki ngai, kasi nabebisaki bango na Kombo na Yawe.
[11] Bakobaki kaka kozingela ngai, kasi nabebisaki bango na Kombo na Yawe.
[12] Bazingelaki ngai lokola banzoyi, kasi ekufaki lokola moto ya esobe ; nabebisaki yango na Kombo na Yawe.
[13] Batindikaki ngai mpo ete nakweyisa kondima, kasi Yawe asungaki ngai.
[14] Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ; apesaki ngai elonga.
[15] Koganga ya esengo mpe ya elonga eyokanaka wuta na bandako ya kapo ya bato ya sembo, pamba te nguya na Yawe esalaka makambo minene !
[16] Yawe asembolaka loboko na Ye ya mobali, mpe nguya na Yawe esalaka makambo minene.
[17] Nakokufa te, nakozala na bomoi mpe nakopanza sango ya misala ya Yawe.
[18] Solo, Yawe apesaki ngai etumbu makasi ; kasi akabaki ngai na kufa te.
[19] Bofungolela ngai bikuke ya bosembo mpo ete nakota mpe nakumisa Yawe.
[20] Tala ekuke ya Yawe ; bato ya sembo bakotelaka na ekuke yango.
[21] Nasanzolaka Yo, pamba te oyanolaki ngai mpe opesaki ngai elonga.
[22] Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba.
[23] Ezali Yawe nde alingaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso !
[24] Tala mokolo oyo Yawe asali ; tika ete tosepela mpe toganga na esengo mpo na mokolo yango !
[25] Yawe, nabondeli Yo, pesa lobiko. Yawe, nabondeli Yo, pesa elonga.
[26] Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Tozali kopambola bino wuta na Tempelo ya Yawe.
[27] Yawe azali Nzambe, mpe angengisaki biso. Bokota na molongo, bomema mandalala na maboko mpe bokende kino na maseke ya etumbelo.
[28] Ozali Nzambe na ngai, nasanzolaka Yo ! Ozali Nzambe na ngai, nanetolaka Yo.
[29] Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !