[1] Libondeli ya moto na pasi, oyo abungisi elikya mpe azali kolela liboso ya Yawe.
[2] Yawe, yoka libondeli na ngai ! Tika ete koganga na ngai ekoma kino epai na Yo !
[3] Kobombela ngai elongi na Yo te, wana nazali na pasi. Yoka libondeli na ngai na mokolo oyo nazali kobelela Yo ; yanola ngai noki !
[4] Pamba te mikolo ya bomoi na ngai ezali kolimwa lokola molinga, mikuwa na ngai ezali kozika lokola makala ya moto.
[5] Motema na ngai ebungisi elikya mpe ezali komitungisa lokola matiti oyo bakati ; mpo na yango, nakomi ata kobosana kolia bilei na ngai.
[6] Mpo ete naleli makasi, natikali kaka na poso ya nzoto likolo ya mikuwa.
[7] Nakomi lokola esulungutu ya esobe, lokola esulungutu ya bisika oyo ebeba.
[8] Pongi ekimi ngai ; nakomi lokola ndeke oyo etikali yango moko na likolo ya ndako.
[9] Banguna na ngai batombokeli ngai, bazali kofinga ngai tango nyonso mpe bazali kosalela kombo na ngai mpo na kolakela bato mabe.
[10] Nakomi kolia putulu na esika ya bilei, mpe komela mayi esangana na mpinzoli na ngai.
[11] Mpo na kanda monene na Yo, otombokeli ngai mpe obwaki ngai mosika.
[12] Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokima lokola elili, mpe nakawuki lokola matiti.
[13] Kasi Yo Yawe, ozali Mokonzi mpo na libela, ozali Nzambe seko na seko.
[14] Okotelema solo mpo na Siona, pamba te ekomi tango ya koyokela yango mawa ; tango oyo ekatama ekoki.
[15] Pamba te biso basali na Yo, tosepelaka na mabanga na yango, mpe toyokelaka putulu na yango mawa.
[16] Bikolo ekotosa Yawe, mpe bakonzi nyonso ya mokili bakondima nkembo na Yo.
[17] Pamba te Yawe akotonga lisusu Siona mpe akomonana kati na nkembo na Ye.
[18] Akoyanola libondeli ya bato oyo babungisaki biloko, mpe akondima mabondeli na bango.
[19] Tika ete bakoma yango mpo na ekeke oyo ekolanda, mpo ete bikelamu ya sika ekumisa Yawe.
[20] Wuta na Esika na Ye ya bule, wuta na likolo, Yawe atalaki biso awa na mokili
[21] mpo na koyoka kolela ya bakangami kati na boloko mpe kokangola bato oyo bazwaki etumbu ya kufa.
[22] Kombo ya Yawe ekokende sango kati na Siona, mpe masanzoli na Ye, kati na Yelusalemi
[23] tango bato mpe bikolo bakosangana mpo na kogumbamela Yawe.
[24] Na bomoi na ngai, abukaki lolendo ya makasi na ngai, mpe akitisaki motango ya mikolo ya bomoi na ngai.
[25] Nalobaki : « Nzambe na ngai, Yo oyo ozali na bomoi seko na seko, koboma ngai te na kati-kati ya mikolo ya bomoi na ngai !
[26] Na kala, otiaki miboko ya mokili, mpe maboko na Yo esalaki Likolo.
[27] Bango, bakokufa ; kasi Yo, okotikala seko na seko. Nzoto na bango ekolemba lokola elamba ; okobongola bango lokola kazaka, mpe bakolimwa.
[28] Kasi Yo, ozali ndenge moko, mibu na Yo ekotikala kosuka te.
[29] Bana ya basali na Yo bakozwa esika ya kovanda, mpe bakitani na bango bakowumela liboso na Yo. »