Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:10

[1] Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.

[2] Nalobaka na tina na Yawe : « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai ; natiaka elikya na ngai kati na Ye ! »

[3] Ye nde akangolaka yo wuta na mitambo ya mokangi bandeke mpe na bokono oyo ebikisaka te.

[4] Abombaka yo na se ya mapapu na Ye, mpe ozwaka ebombamelo ya malonga na se ya mapapu na Ye ; bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba mpe lokola elamba ya ebende.

[5] Okobanga te somo ya butu, makonga oyo epumbwaka na moyi makasi,

[6] bokono oyo etambolaka kati na molili mpe pasi oyo ebebisaka na midi.

[7] Ezala bato nkoto moko bakweyi pembeni na yo, mpe bato nkoto zomi, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, ekozwa yo ata moke te.

[8] Okotala kaka na miso na yo mpe okomona ndenge nini bato mabe bazali kozwa etumbu lokola lifuti na bango.

[9] Soki otatoli : « Yawe azali ebombamelo na ngai, » mpe okomisi Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekimelo na yo,

[10] mabe ata moko te ekokweyela yo, pasi ata moko te ekopusana na ndako na yo ;

[11] pamba te akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye ete babatela yo malamu na banzela na yo nyonso.

[12] Bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te ;

[13] okotambola na likolo ya nkosi mpe ya etupa, okonyata nkosi ya monene mpe dalagona.

[14] Lokola akangami na ngai, nakokangola ye ; lokola ayebi Kombo na Ngai, nakobatela ye.

[15] Soki abeleli ngai, nakoyanola ye ; nakozala elongo na ye na tango ya pasi, nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu.

[16] Nakopesa ye bomoi molayi mpe nakolakisa ye lobiko na ngai.

Banzembo — Chapters