[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
[2] Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya misala mabe ! Kokutanisa ngai te na bato na kanza.
[3] Basalaka mabongisi mabe kati na mitema na bango mpe balukaka bitumba mikolo nyonso.
[4] Bapelisaka lolemo na bango lokola nyoka, bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.
[5] Yawe, batela ngai mosika ya maboko ya moto mabe ; kokutanisa ngai te na bato na kanza oyo bazali kosala mabongisi ya kokweyisa ngai !
[6] Bato ya lofundu batieli ngai mitambo, batandi basinga ya minyama na nzela mpe batimoli mabulu mpo na kokanga ngai.
[7] Nalobaka na Yawe : « Ozali Nzambe na ngai ! » Yawe, yoka mabondeli na ngai.
[8] Oh Yawe, Nkolo na ngai, ozali makasi ya lobiko na ngai, obatelaka moto na ngai kati na mokolo ya etumba.
[9] Yawe, kokokisa te posa ya moto mabe, kolongisa te mabongisi na ye, noki te akokoma lolendo.
[10] Tika ete pasi oyo bibebu na bango esili kobongisa ekweyela bato oyo bazingeli ngai.
[11] Tika ete makala ya moto esopanela bango ! Tika ete Nzambe atindika bango kati na moto, kati na mabulu ya potopoto epai wapi bakokoka kotelema lisusu te !
[12] Batioli bakowumela te kati na mokili, pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.
[13] Nayebi ete Yawe akotaka makambo ya babola mpe alongisaka bato oyo bakelela.
[14] Solo, bato ya sembo bakosanzola Kombo na Yo, bato ya alima bakovanda liboso na Yo.