[1] Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda.
[2] Oh Nzambe, ozali Nzambe na ngai ; nazali koluka Yo, molimo na ngai ezali na posa na Yo, bomoi na ngai ezali na posa na Yo makasi, kati na mabele ekawuka mpe ezanga mayi.
[3] Natalaki Yo kati na Esika ya bule mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.
[4] Pamba te bolingo na Yo ezali malamu koleka bomoi, bibebu na ngai ekosanzola Yo.
[5] Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba, nakotombola maboko na ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
[6] Nakotonda lokola moto oyo asili kolia misuni kitoko mpe mafuta ; bibebu na ngai ekoganga na esengo mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.
[7] Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai, nasambelaka Yo na butu ;
[8] pamba te ozali lisungi mpo na ngai, mpe nagangaka na esengo wana nazali na se ya elili ya mapapu na Yo.
[9] Nakangami na Yo ; loboko na Yo ya mobali esimbi ngai makasi.
[10] Bato oyo balukaka koboma ngai bakozinda na mabele
[11] Bakoboma bango na mopanga mpe bakokoma bilei ya bambwa ya zamba.
[12] Kasi mokonzi akosepela kati na Nzambe ; moto nyonso oyo alapaka ndayi na Kombo ya Nzambe akomikumisa mpo na yango, pamba te minoko ya bakosi ekokangama.