[1] Maloba ya Etani, moto ya Ezera.
[2] Nakoyemba tango nyonso bolingo ya Yawe ; monoko na ngai ekosakola boyengebene na Yo libela na libela.
[3] Solo, nazali kotatola yango : « Miboko ya bolingo na Yo ezali na suka te ; ovandisi boyengebene na Yo kati na likolo. »
[4] Olobaki : « Nasali boyokani elongo na moponami na ngai, nalapi ndayi epai ya mosali na ngai, Davidi :
[5] ‹ Nakokomisa yo libota ya bokonzi mpo na tango nyonso mpe nakolendisa kiti na yo ya bokonzi mpo na seko. › »
[6] Yawe, Lola esanzolaka misala na Yo ya kokamwa mpe bosembo na Yo kati na lisanga ya basantu.
[7] Nani akokani na Yawe kuna na likolo ? Nani akokani na Yawe kati na mampinga ya likolo ?
[8] Azali Nzambe ya somo kati na lisanga ya basantu ; solo, azali somo koleka ba-oyo nyonso bazingeli Ye.
[9] Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, nani azali na nguya lokola Yo ? Nani, oh Yawe ? Boyengebene na Yo ezingeli Yo.
[10] Yo nde okonzaka lolendo ya ebale monene mpe okitisaka bambonge na yango soki etomboki.
[11] Yo nde olongaki Rahavi, dalagona ya Ejipito, kino koboma ye ; mpe, na nguya na Yo, opanzaki banguna na Yo.
[12] Likolo ezali ya Yo ; mabele mpe ezali ya Yo ! Yo nde osala mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango.
[13] Yo nde okela Nor mpe Sude ; Tabori mpe Erimoni egangaka na esengo mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
[14] Loboko na Yo ezali na makasi, loboko na Yo ezali na nguya, loboko na Yo ya mobali oyo otombola.
[15] Bosembo mpe alima ezali miboko ya Kiti ya Bokonzi na Yo, boyengebene mpe bolingo etambolaka liboso na Yo.
[16] Esengo na bato oyo bayebi kobetela Yo maboko ! Yawe, batambolaka na pole ya elongi na Yo,
[17] basepelaka mikolo nyonso na Kombo na Yo, basanzolaka bosembo na Yo.
[18] Pamba te ozali nkembo mpe nguya na bango ; mpe olongisaka biso na ngolu na Yo.
[19] Yawe azali nguba na biso ; Mosantu ya Isalaele azali Mokonzi na biso.
[20] Mokolo moko, olobaki na bayengebene na Yo kati na emoniseli : « Nasungaki elombe moko ya bitumba, natombolaki elenge mobali moko kati na bato na ngai ;
[21] namonaki Davidi, mosali na ngai ; napakolaki ye mafuta na ngai ya bule.
[22] Nakobatela ye na loboko na ngai ya nguya, mpe loboko na ngai ekokomisa ye makasi.
[23] Monguna akobimela ye ata moke te na pwasa, moto mabe akokoka konyokola ye te.
[24] Nakobebisa banguna na ye liboso na ye mpe nakoboma bayini na ye.
[25] Bolingo mpe boyengebene na ngai ekozala elongo na ye ; mpe na Kombo na Ngai, akotombola elongi.
[26] Nakotia ebale monene na se ya loboko na ye, mpe bibale, na se ya loboko na ye ya mobali.
[27] Akobelela ngai boye : ‹ Ozali Tata na ngai, Nzambe na ngai, Libanga mpe Mobikisi na ngai ! ›
[28] Mpe ngai, nakokomisa ye mwana na ngai ya liboso, mokonzi oyo aleki na kotombwama kati na bakonzi ya mokili.
[29] Nakobatela mpo na seko bolingo na ngai mpo na ye ; boyokani na ngai elongo na ye ekotikala kobeba te.
[30] Nakobatela mpo na libela libota na ye ya bokonzi, mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela ndenge moko na likolo.
[31] Soki bana na ye basundoli mibeko na ngai mpe balandi bosembo na ngai te,
[32] soki babuki mitindo na ngai mpe babateli te mibeko na ngai,
[33] nakopesa bango etumbu na nzela ya lingenda, mpo na botomboki na bango, mpe na nzela ya makofi, mpo na masumu na bango ;
[34] kasi nakowangana te bolingo na ngai mpe nakobongola te boyengebene na ngai.
[35] Nakosambwisa te boyokani na ngai mpe nakobongola te maloba na ngai.
[36] Nalapaki yango na ndayi mbala moko mpo na libela na Kombo ya bosantu na ngai : ‹ Nakokosa Davidi te ! ›
[37] Libota na ye ya bokonzi ekowumela mpo na libela, mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela lokola moyi liboso na ngai.
[38] Solo, lokola sanza, ekowumela na bokonzi mpo na libela. Motatoli oyo azali kuna kati na likolo akoki kokosa te. »
[39] Nzokande, obwakaki, omonaki pamba, osilikelaki mopakolami na Yo !
[40] Owanganaki boyokani oyo osalaki elongo na mosali na Yo, obwakaki na mabele mpe osambwisaki motole na ye.
[41] Otobolaki madusu kati na bamir na ye nyonso mpe obukaki bandako na ye, oyo batonga makasi ;
[42] bato nyonso oyo balekaki wana babotolaki ye biloko, mpe bavandi ya pembeni na ye bakomaki kotiola ye.
[43] Obakisaki makasi ya bayini na ye mpe otondisaki banguna na ye nyonso na esengo,
[44] osalaki kutu ete mopanga na ye ebalukela ye moko mpe osungaki ye te na bitumba ;
[45] osilisaki kongenga ya lokumu na ye, obwakaki kiti na ye ya bokonzi na mabele ;
[46] okomisaki moke mikolo ya bolenge na ye mpe olatisaki ye kazaka ya soni.
[47] Yawe, kino tango nini ? Okomibomba penza tango nyonso ? Kino tango nini kanda na Yo ekongala lokola moto ?
[48] Kanisa motango ya mikolo ya bomoi na ngai ! Okelaki penza bato mpo na suka oyo ezanga ata tina !
[49] Moto nani akoki kozala na bomoi mpe azanga komona kufa ? Nani akolonga kokima nguya ya mboka ya bakufi ?
[50] Nkolo, wapi bolingo na Yo ya kala oyo alakaki Davidi na boyengebene na Yo na nzela ya ndayi ?
[51] Nkolo, kanisa ndenge bazali kosakanela basali na Yo ; kobosana te ete namemi mokumba ya bato oyo nyonso !
[52] Yawe, kanisa mafinga ya banguna na Yo, oyo batiolaka bomoi ya mopakolami na Yo !
[53] Tika ete Yawe apambolama libela na libela ! Amen ! Amen !