Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:41

[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Kobebisa te. » Nzembo ya Davidi.

[2] Ezali solo ete bolobaka te tango bokataka makambo ? Boni, bana na moto, bosambisaka na bosembo ?

[3] Te, ezala kati na mitema na bino, bosalaka mabongisi ezanga bosembo ; botandaka kanza ya maboko na bino kati na mokili.

[4] Bato mabe babebaka wuta na mbotama na bango, bapengwaka mpe balobaka lokuta wuta na mabumu ya bamama na bango.

[5] Bazalaka na ngenge lokola ngenge ya nyoka, lokola ngenge ya etupa oyo eyokaka te, oyo ekangaka litoyi na yango,

[6] oyo eyokaka te ata mingongo ya bato na soloka mpe ya moto ya maji oyo aleki na mayele.

[7] Nzambe, buka minu na bango kati na minoko na bango ; Yawe, buka bambanga ya bana ya bankosi.

[8] Tika ete balimwa lokola mayi oyo ezali kotiola ; Tika ete bambanzi na bango ebukana tango babetaka batolotolo.

[9] Tika ete balimwa lokola soyi ya mbembe, lokola mwana oyo akomona moyi te mpo ete abimi na zemi oyo esopani.

[10] Liboso ete banzungu na bino ekutana na moto ya basende, ezala ya mayi to ya kokawuka, bato mabe akolimwa.

[11] Moto ya sembo akosepela, pamba te akomona Nzambe kozongisela bato mabe, mabe na mabe, mpe akotambola kati na makila na bango.

[12] Mpe bato bakoloba : « Solo, ezali na lifuti mpo na moto ya sembo ; solo, ezali na Nzambe oyo asambisaka mokili. »

Banzembo — Chapters