Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:28

[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi : nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo.

[2] Tika ete Nzambe asalela biso ngolu mpe apambola biso, tika ete angengisela biso elongi na Ye ;

[3] mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili, mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso.

[4] Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !

[5] Tika ete bato basepela, tika ete babeta milolo ya esengo, pamba te okambaka bikolo na bosembo, mpe otambolisaka bato awa na mabele.

[6] Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !

[7] Mabele eboti bambuma na yango ; tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso.

[8] Tika ete Nzambe apambola biso ; tika ete mokili mobimba etosa Ye !

Banzembo — Chapters