[1] Bokumisa Yawe ! Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe asepelaka makasi na mibeko na Ye.
[2] Bana na ye bakozala bato na nguya kati na mokili ; ekeke ya bato ya sembo ekopambolama.
[3] Ndako na ye ezali na bokolongono mpe na bomengo, mpe bosembo na ye ewumelaka mpo na seko.
[4] Pole engengaka kati na molili mpo na bato ya alima, mpo na moto oyo alimbisaka baninga, ayokelaka bato mawa mpe azali sembo.
[5] Esengo na moto oyo ayokelaka bato mawa mpe adefisaka, mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.
[6] Solo, aninganaka ata moke te. Bakanisaka misala ya moto ya sembo tango nyonso.
[7] Abangaka basango ya mabe te ; motema na ye ezali na kimia, atiaka elikya na ye kati na Yawe.
[8] Motema na ye eninganaka te, abangaka te kino akomona banguna na ye kozwa etumbu.
[9] Akabelaka babola na motema ya esengo ; bosembo na ye ewumelaka libela na libela, lokumu na ye ekitaka te.
[10] Moto mabe amonaka yango mpe asilikaka na zuwa, aliaka minu mpe alembaka nzoto. Posa ya bato mabe elimwaka.