Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:47

[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Ezali ya koyemba na flite. Nzembo ya Emani, moto ya Ezera.

[2] Yawe, ozali Nzambe ; Yo nde obikisaka ngai ! Butu mpe moyi, nagangaka epai na Yo !

[3] Tika ete losambo na ngai ekoma epai na Yo ; Yoka koganga na ngai !

[4] Pamba te bomoi na ngai etondi na pasi mpe nakomi pene ya kokufa.

[5] Batie ngai na molongo ya bato oyo bazali kokende na kunda ; nakeseni ata moke te na moto oyo azali lisusu na makasi te.

[6] Nakomi moko kati na bakufi, lokola bato oyo basila kokufa na bitumba mpe bazali sik’oyo kati na kunda, lokola bato oyo okanisaka lisusu te, pamba te obatelaka bango lisusu te.

[7] Obwaki ngai na libulu ya mozindo makasi, kati na mozindo ya molili.

[8] Kanda na Yo ya makasi ekweyeli ngai, bambonge na yango nyonso ezali konyokola ngai.

[9] Okaboli ngai na balingami na ngai ya motema, okomisi ngai eloko ya nkele na miso na bango ; nakomi lokola mokangami kati na boloko, nakoki kobima te !

[10] Miso na ngai ezali komona lisusu te mpo na pasi ; nzokande nabelelaka Yo, Yawe, mikolo nyonso, natombolaka maboko na ngai epai na Yo !

[11] Boni, okosala bikamwa mpo na bakufi ? Boni, bakufi bakoki kotelema mpo na kosanzola Yo ?

[12] Boni, bolingo na Yo etatolamaka kati na kunda, mpe bosembo na Yo, kati na mboka ya bakufi ?

[13] Boni, bikamwa na Yo eyebani kati na molili, mpe bosembo na Yo, kati na mokili ya bato oyo babosana ?

[14] Kasi ngai, nazali kobelela nde Yo, Yawe ; nabondelaka Yo tongo nyonso.

[15] Yawe, mpo na nini kobwaka ngai mpe kobombela ngai elongi na Yo ?

[16] Wuta bolenge na ngai, nazali mobola mpe moto na pasi ; mpe okweyiselaka ngai makambo na Yo ya somo ! Solo, elikya esili ngai !

[17] Kanda makasi na Yo ebetaka ngai, minyoko oyo ewutaka epai na Yo ekomisaka ngai moto pamba.

[18] Ezingelaka ngai mikolo nyonso, lokola mayi, na bangambo nyonso.

[19] Okaboli ngai na baninga mpe balingami na ngai, natikali na moninga kaka moko ya motema : molili !

Banzembo — Chapters