Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:32

[1] Bokumisa Yawe ! Tala ndenge ezali malamu kosanzola Nzambe na biso, mpe ndenge ezali kitoko kokumisa Ye !

[2] Yawe azali kotonga lisusu Yelusalemi epai wapi akosangisa bato ya Isalaele oyo bakenda na bowumbu.

[3] Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.

[4] Ayebi motango ya minzoto mpe abengaka moko na moko na kombo na yango.

[5] Nkolo na biso azali monene mpe atonda na nguya ; mayele na Ye ezali na mondelo te.

[6] Yawe asungaka babola, kasi akitisaka bato mabe kino na mabele.

[7] Boyembela Yawe nzembo ya matondi ! Bobetela Nzambe na biso lindanda mpo na kosanzola Ye !

[8] Azipaka likolo na mapata, abongisaka mvula mpo na mokili mpe abotisaka matiti na bangomba.

[9] Apesaka bilei epai ya bibwele mpe epai ya bana ya yanganga oyo ezali koganga mpo na nzala.

[10] Asepelaka na makasi ya mpunda te mpe alingaka te nguya ya moto ;

[11] kasi Yawe asepelaka na bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batielaka bolingo na Ye motema.

[12] Yelusalemi, pesa nkembo na Yawe ! Siona, kumisa Nzambe na yo !

[13] Alendisaka bikangelo ya bikuke na yo mpe apambolaka bana na yo epai na yo.

[14] Atiaka kimia na etuka na yo mpe atondisaka yo na farine.

[15] Atindaka mitindo na Ye na mokili, mpe maloba na Ye epanzanaka mbala moko !

[16] Anokisaka mvula ya pembe lokola bapwale ya meme mpe apanzaka mvula ya mabanga lokola putulu ;

[17] akweyisaka mabanga ya mvula yango lokola mabanga ya mike-mike ; nani akoki kotelema na malili na yango ?

[18] Soki kaka atindi liloba, malili ekomaka kosila moke-moke ; mpe soki atindi mopepe, mayi ekomaka kotiola.

[19] Asakolaki liloba na Ye epai ya Jakobi, mibeko mpe malako na Ye epai ya Isalaele.

[20] Asalaki bongo na ekolo ata moko te ; boye eyebaka mpe mibeko na Ye te. Bokumisa Yawe !

Banzembo — Chapters