Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:57

[1] Na biso te, Yawe, na biso te, kasi pesa nkembo na Kombo na Yo mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo.

[2] Mpo na nini bikolo eloba : « Wapi Nzambe na bango ? »

[3] Nzambe na biso azali na Lola, asalaka nyonso oyo alingi.

[4] Kasi banzambe na bango ya bikeko ezali ya palata mpe ya wolo, esalema na maboko ya bato.

[5] Ezali na minoko, kasi elobaka te ; ezali na miso, kasi emonaka te ;

[6] ezali na matoyi, kasi eyokaka te ; ezali na zolo, kasi eyokaka solo te ;

[7] ezali na maboko, kasi esimbaka te ; ezali na makolo, kasi etambolaka te. Minoko na yango ebimisaka ata makelele te.

[8] Bato oyo basalaka yango mpe bato nyonso oyo batielaka yango motema bakokani na yango.

[9] Bana ya Isalaele, botia elikya kati na Yawe ! Azali lisungi mpe nguba na bango.

[10] Bakitani ya Aron, botia elikya kati na Yawe ! Azali lisungi mpe nguba na bino.

[11] Bino bato oyo botosaka Yawe, botia elikya kati na Yawe. Azali lisungi mpe nguba na bango.

[12] Yawe akanisaka biso, akopambola ; solo, akopambola bana ya Isalaele, akopambola bakitani ya Aron.

[13] Akopambola bato oyo batosaka Yawe kobanda na bato pamba kino na bato minene.

[14] Tika ete Yawe afulukisa bino, bino mpe bana na bino !

[15] Tika ete Yawe apambola bino, Ye oyo asala likolo mpe mabele.

[16] Likolo ezali likolo ya Yawe ; kasi apesa mabele epai ya bato.

[17] Ezali te bakufi nde bakumisaka Yawe, pamba te bango nyonso bakendaka na esika ya kimia.

[18] Kasi biso, tokopambola Yawe, kobanda sik’oyo kino libela na libela. Bokumisa Yawe !

Banzembo — Chapters