[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi.
[2] Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ; lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.
[3] Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.
[4] Kino tango nini bokosangela moto moko ? Kino tango nini bino nyonso bokosangana mpo na koluka koboma ye lokola mir oyo etengami, lokola lopango oyo esili kokweya ?
[5] Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye wuta na esika na ye ya likolo, basepelaka kotatola lokuta. Bapambolaka na nzela ya minoko na bango ; kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.
[6] Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe, pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye.
[7] Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.
[8] Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe.
[9] Botielaka Ye elikya tango nyonso, bosopaka mitema na bino liboso na Ye, pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.
[10] Solo, bato bazali lokola molunge, bazali lokola lokuta ; Soki batie bango na emekelo kilo, ata molunge ekoleka bango nyonso na kilo.
[11] Botiaka elikya te na mileki ya moyibi, mpe botielaka yango motema te ; soki bomengo na bino ekomi ebele, bokangama na yango te.
[12] Nzambe alobaki mbala moko, ngai nayokaki mbala mibale : « Pamba te makasi ezali ya Nzambe ;
[13] mpe bolingo ezali ya Nkolo ; » mpe « ofutaka moto nyonso kolanda misala na ye. »