Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:32

[1] Nzembo ya bana ya Kore. Yawe atia moboko ya Siona na likolo ya bangomba ya bule.

[2] Yawe alingaka bikuke ya Siona koleka bandako nyonso ya Jakobi.

[3] Oh engumba ya Nzambe, maloba ya nkembo ezali kolobama na tina na yo !

[4] Kati na bato oyo bayebi ngai, natangi Rahavi mpe Babiloni. Ezali kuna na Siona nde Filisitia, Tiri mpe Kushi ebimela.

[5] Na tina na Siona, maloba oyo ekolobama : « Bato nyonso babimela awa, mpe ezali Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde alendisaka yango. »

[6] Tango Yawe akomaki kati na buku ya bikolo, akomaki boye mpo na moko na moko kati na bango : « Moto songolo abotama kati na Siona ! »

[7] Mpe tango bayembaka mpe babinaka, balobaka : « Bitima na ngai nyonso ezali kati na yo ! »

Banzembo — Chapters