Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:57

[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

[2] Nakosanzola Yawe na motema na ngai mobimba, nakotatola misala minene na Yo nyonso.

[3] Nakozala na esengo mpe nakosepela kati na Yo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo.

[4] Banguna na ngai bazongaka sima, bakweyaka mpe balimwaka liboso na Yo.

[5] Pamba te, okataki likambo na ngai mpe olongisaki ngai, ovandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mosambisi ya sembo.

[6] Opamelaki bikolo mpe obomaki moto mabe, olimwisaki kombo na bango mpo na libela.

[7] Banguna na ngai balimwa mpo na libela ; opanzaki bingumba na bango kino bakanisa bango lisusu te.

[8] Yawe akonzaka mpo na libela, atia Kiti na Ye ya Bokonzi mpo na kokata makambo ya bato.

[9] Akonzaka mokili na bosembo, akataka makambo ya bato na alima.

[10] Yawe azali ebombamelo mpo na bato oyo bazali konyokolama, mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.

[11] Bato oyo bayebi Kombo na Yo batiaka elikya na bango kati na Yo ; pamba te, Yo Yawe, osundolaka te bato oyo balukaka Yo.

[12] Boyembela Yawe oyo avandaka kati na Siona banzembo ya masanzoli ; bopanza sango ya misala na Ye kati na bikolo.

[13] Pamba te Yawe azongisaka mabe na mabe mpo na makila oyo esopani, akanisaka koganga ya banyokolami.

[14] Yawe, yokela ngai mawa, tala ndenge nini bayini na ngai bazali konyokola ngai, mpe kangola ngai wuta na bikuke ya kufa ;

[15] mpo ete napanza sango ya lokumu na Yo kati na bikuke ya Siona, mboka kitoko, mpe nasepela na lobiko na Yo kuna.

[16] Bapagano bakweyi na libulu oyo batimolaki, makolo na bango ekangami na mitambo oyo bango moko basalaki.

[17] Yawe amilakisi na nzela ya misala na Ye ya bosembo ; bato mabe bakangami na mitambo oyo bango moko basalaki.

[18] Bato mabe, bikolo nyonso, oyo bakanisaka Nzambe te, bakokende na mboka ya bakufi.

[19] Kasi Nzambe akotikala te kobosana mobola, mpe elikya ya banyokolami ekotikala seko na seko.

[20] Yawe, telema ! Tika ete moto alonga te ; tika ete bapagano basamba liboso na Yo !

[21] Yawe, tika ete somo ekanga bango ; tika ete bapagano bayeba ete bazali na bango kaka bato !

Banzembo — Chapters