Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:18

[1] Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, kanisa Davidi ; kanisa pasi na ye nyonso !

[2] Alapaki ndayi oyo epai na Yawe, epai ya Elombe ya Jakobi :

[3] « Nakokota na ndako na ngai te, nakomata na mbeto na ngai te,

[4] nakokanga miso na ngai te mpo na kolala pongi to mpo na konimba mwa moke

[5] kino nakozwa Esika mpo na Yawe, Ndako mpo na Elombe ya Jakobi. »

[6] Toyokaki sango na tina na yango na Efrata, tomonaki yango na elanga ya Yari.

[7] Tokende na Ndako na Ye, togumbama liboso ya enyatelo makolo na yango.

[8] Yawe, telema, yaka na Esika na Yo ya bopemi ! Yaka elongo na Sanduku ya Boyokani epai wapi nguya na Yo ezali.

[9] Tika ete Banganga-Nzambe na Yo balata bosembo lokola elamba ; mpe tika ete basantu na Yo baganga na esengo !

[10] Mpo na Davidi, mosali na Yo, kobengana mopakolami na Yo te !

[11] Yawe alapaki epai ya Davidi ndayi ya solo, oyo akowangana te : « Nakotia moko kati na bakitani na yo na kiti na yo ya bokonzi.

[12] Soki bana na yo babateli boyokani mpe mibeko na ngai, bana na bango mpe bakokitana na yo lokola bakonzi, mpe ekosalema bongo mpo na libela. »

[13] Pamba te Yawe aponaki Siona, asepelaki kokomisa yango Esika na Ye ya kovanda :

[14] « Ezali Esika na ngai ya bopemi mpo na libela ; nakovanda awa, pamba te nasepelaki na yango.

[15] Nakopambola, nakopambola yango na biloko ebele, nakotondisa babola na yango na bilei.

[16] Nakolatisa Banganga-Nzambe na yango lobiko, mpe bato na yango bakoganga na esengo.

[17] Kuna na Siona, nakobakisa nguya ya Davidi, mpe nakobimisela ye mokitani, mopakolami na ngai, lokola mwinda ya kopela.

[18] Nakoyokisa banguna na ye soni, mpe motole na ye ekongenga na mbunzu na ye. »

Banzembo — Chapters