[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Azafi.
[2] Nabelelaka Nzambe na koganga ; nabelelaka Nzambe mpo ete ayoka ngai !
[3] Tango nazalaka na pasi, nalukaka Nkolo ; na butu, nalembaka te kotombola maboko na ngai mpe naboyaka kobondisama.
[4] Nakanisaka Nzambe mpe nalelaka, nakotaka na mozindo ya makanisi mpe nalembaka nzoto.
[5] Opimelaka miso na ngai pongi, namitungisaka mpe nayebaka lisusu te eloko ya koloba.
[6] Nakanisaka lisusu mikolo ya kala, mibu nyonso oyo eleka ;
[7] Na butu, nakanisaka lisusu banzembo na ngai ; motema na ngai ezongelaka kokanisa, mpe molimo na ngai ekomaka komituna :
[8] « Boni, Nkolo akobwaka biso penza mpo na libela ? Akosalela biso lisusu bolamu te ?
[9] Bolingo na Ye esili penza mpo na libela ? Bilaka na Ye ekokokisama te mpo na libela ?
[10] Nzambe abosani solo kosala ngolu ? Akangi penza motema na Ye mpo na kanda ? »
[11] Mpe namilobelaka : « Tala likambo oyo ezali kosala ngai pasi : loboko ya mobali ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ebongwani ! »
[12] Nakanisaka misala minene ya Yawe, bikamwa na Yo ya kala.
[13] Nakanisaka nyonso oyo osalaki kino na bikamwa na Yo.
[14] Oh Nzambe, banzela na Yo ezali bule ; nzambe nini akokani na Yo na monene ?
[15] Ozali Nzambe oyo asalaka bikamwa ; olakisi nguya na Yo kati na bikolo.
[16] Na nguya ya loboko na Yo, okangolaki bato na Yo, bakitani ya Jakobi mpe ya Jozefi.
[17] Oh Nzambe, mayi emonaki Yo ! Mayi emonaki Yo mpe ekomaki kolenga ; ezala mozindo ya mayi eninganaki.
[18] Mapata esopaki mayi ebele, likolo eyokisaki lokito ya kake, mpe makonga na Yo ezalaki koleka-leka na bangambo nyonso.
[19] Na lokito ya kake na Yo, mikalikali engengisaki mokili, mabele eninganaki mpe elengaki.
[20] Opasolaki nzela kati na ebale monene, balabala na Yo kati na mayi monene, mpe moto moko te amonaki bilembo ya matambe na Yo.
[21] Otambolisaki bato na Yo lokola etonga, na loboko ya Moyize mpe ya Aron.