Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:24

[1] Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tango Yawe azongisaki bato ya Siona longwa na bowumbu, tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto.

[2] Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo. Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo : « Yawe asaleli bango makambo minene ! »

[3] Solo, Yawe asaleli biso makambo minene, mpe tozali kosepela.

[4] Yawe, yaka kobongisa makambo na biso ndenge kaka otondisaka lisusu miluka ya Negevi.

[5] Bato oyo balonaka na mpinzoli babukaka na banzembo ya esengo.

[6] Moto oyo akendaka na kolela, tango amemi milona na ye, azongaka na esengo wana amemi maboke na ye.

Banzembo — Chapters