Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:06

[1] Bokumisa Yawe ! Nakokumisa Yawe na motema na ngai mobimba kati na likita ya bato ya sembo mpe kati na mayangani.

[2] Yawe asalaka makambo minene ; bato nyonso oyo balingaka yango bakanisaka yango.

[3] Misala na Ye emonisaka nkembo mpe lokumu na Ye, mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela.

[4] Alingaka ete bakanisa bikamwa na Ye. Yawe atondi na mawa mpe atalisaka ngolu na Ye.

[5] Apesaka bato oyo batosaka Ye bilei ; akanisaka Boyokani na Ye tango nyonso.

[6] Amonisaki nguya na Ye epai ya bato na Ye na nzela ya misala na Ye tango apesaki bango libula ya bato ya bikolo mosusu.

[7] Misala na Ye nyonso elakisaka boyengebene mpe bosembo na Ye ; mibeko na Ye nyonso ebongi na kondima yango.

[8] Epesama mpo na libela, mpe esengeli kotosa yango na bosembo mpe na bosolo.

[9] Akangolaki bato na Ye, mpe asalaki Boyokani ya libela elongo na bango. Azali Nzambe Mosantu mpe Nzambe ya somo.

[10] Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.

Banzembo — Chapters