Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:51

[1] Bokumisa Yawe ! Bokumisa Yawe wuta na likolo, bokumisa Ye na bisika oyo eleki likolo.

[2] Bokumisa Ye, bino ba-anjelu na Ye nyonso ; bokumisa Ye, bino mampinga na Ye nyonso ;

[3] bokumisa Ye, bino moyi mpe sanza ; bokumisa Ye, bino minzoto nyonso oyo engengaka ;

[4] bokumisa Ye, bino oyo boleki likolo kati na likolo, mpe bino mayi oyo bozali na likolo !

[5] Tika ete ekumisa Kombo ya Yawe ! Pamba te apesaki mitindo, mpe ekelamaki.

[6] Atiaki yango mpo na libela ; apesaki mibeko oyo ekobongwana te.

[7] Bokumisa Yawe wuta na mokili, ezala bilima ya mayi to mozindo nyonso,

[8] ezala moto to mvula ya mabanga, ezala mvula ya pembe to londende, ezala mopepe makasi oyo ekokisaka liloba na Ye ;

[9] ezala bangomba milayi to bangomba mikuse, ezala banzete oyo ebotaka bambuma to banzete ya sedele,

[10] ezala banyama ya zamba to bibwele nyonso, ezala bikelamu oyo etambolaka na libumu to bandeke,

[11] ezala bakonzi ya mabele to bikolo nyonso, ezala bakambi to batambolisi nyonso ya mokili,

[12] ezala bilenge mibali to bilenge basi, ezala bampaka to bana mike !

[13] Tika ete bakumisa Kombo ya Yawe ! Pamba te Ye moko kaka nde aleki likolo ; nkembo na Ye eleki mabele mpe likolo.

[14] Abongisi elombe mokangoli mpo na bato na Ye ! Ezali likambo oyo bayengebene na Ye nyonso, bana nyonso ya Isalaele, bato oyo balingaka Ye, basengeli kokumisa Yawe mpo na yango. Bokumisa Yawe !

Banzembo — Chapters