Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:50

[1] Yawe, mpo na nini otelemi mosika ? Mpo na nini obombami na tango ya pasi ?

[2] Na lolendo na ye, moto mabe oyo akangami na mabongisi na ye anyokolaka mobola.

[3] Pamba te moto mabe amikumisaka na tina na posa makasi ya motema na ye, apambolaka moto oyo azali na lokoso mpe afingaka Yawe.

[4] Na lolendo na ye, moto mabe alobaka : « Nzambe azalaka te. » Kati na makanisi na ye nyonso, ezali na esika te mpo na Nzambe.

[5] Misala na ye ekendeke liboso tango nyonso, asalaka keba te na mikano na Yo, Yawe ; atiolaka banguna na ye nyonso.

[6] Amilobelaka : « Eloko moko te ekotikala kolengisa ngai. » Alapaka ndayi boye : « Moko te akotikala kosala ngai mabe. »

[7] Monoko na ye etonda na bilakeli mabe, lokuta mpe mangungu ; abongisaka kaka pasi mpe mabe.

[8] Abombamaka pene ya bamboka. Wuta na bisika oyo abombamaka, abomaka moto oyo asali mabe te. Miso na ye ezelaka na kobombama bato ya koboma.

[9] Abombamaka lokola nkosi kati na evandelo na yango, abombamaka mpo na kokanga moto oyo azangi nguya ; akangaka moto oyo azangi nguya na kotindika ye pembeni ya motambo.

[10] Agumbaka ye mpe avandisaka ye na mabele, mpe akweyaka na se ya bokonzi na ye.

[11] Amilobelaka : « Nzambe akotikala koyeba te, abombaka elongi na Ye mpe akotikala komona te. »

[12] Oh Yawe, telema. Nzambe, sembola loboko na Yo, kanisa babola.

[13] Mpo na nini moto mabe afinga Nzambe ? Mpo na nini amilobela : « Nzambe akopesa ngai etumbu te ? »

[14] Pamba te, Yo Nzambe, omoni pasi ya banyokolami ; otalaka pasi na bango mpe ozwaka yango kati na loboko na Yo. Banyokolami bamipesaka epai na Yo oyo osungaka bana bitike.

[15] Bebisa nguya ya moto mabe, pesa moto ya misala mabe etumbu mpo na mabe na ye, mpo ete emonana lisusu te.

[16] Yawe azali Mokonzi mpo na seko, bapagano bakozala lisusu te kati na mokili na Ye.

[17] Yawe, oyokaka posa ya banyokolami, olendisaka bango, mpe oyokaka koganga na bango,

[18] mpo na kolongisa mwana etike mpe monyokolami ; boye, bato ya mokili bakobangisa lisusu te.

Banzembo — Chapters