[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
[2] Oh Nzambe, yoka mongongo na ngai kati kolela na ngai, batela ngai mosika ya monguna oyo azali kopesa ngai somo.
[3] Bomba ngai mosika ya mikano ya bato mabe, mosika ya makita ya bato ya misala mabe.
[4] Bapelisaka lolemo na bango ndenge bapelisaka mopanga, babimisaka maloba ya bololo lokola makonga
[5] mpo na kobwakela, na kobombama, moto oyo azangi pamela ; babangaka te kobwakela ye yango na mbalakata.
[6] Balendisanaka mpo na mabongisi mabe, bayokanaka kotia mitambo ; balobaka : « Nani akomona yango ? »
[7] Basalaka mabongisi ya kosala bato mabe, balobaka : « Toselingwi na mabongisi na biso ! » Makanisi mpe motema ya moto ezali mozindo makasi.
[8] Kasi Nzambe akobwakela bango makonga na Ye na mbalakata ; ekozwa mpe ekozokisa bango.
[9] Maloba na bango moko ekobalukela bango mpe ekomema bango na libebi ; mpe moto nyonso oyo akomona bango akoningisa moto.
[10] Bato nyonso bakokoma kobanga, kopanza sango ya misala ya Nzambe mpe kososola makambo oyo asalaka.
[11] Moto ya sembo akosepela mpe akomibomba kati na Yawe ; bato nyonso oyo bazali na mitema alima bakomikumisa mpo na yango.