Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:01

[1] Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

[2] Eyembamaki tango mosakoli Natan akomaki epai ya Davidi sima na ye kosala ekobo elongo na Batisheba.

[3] Oh Nzambe, yokela ngai mawa kolanda bolingo monene na Yo ; longola masumu na ngai kolanda mawa monene na Yo !

[4] Sukola ngai mobimba mpo na kolongola mabe na ngai, mpe petola ngai na masumu na ngai.

[5] Pamba te nayebi mabe na ngai, mpe masumu na ngai ezalaka tango nyonso liboso na ngai.

[6] Epai na Yo, epai na Yo kaka, nasali masumu mpe mabe na miso na Yo. Boye, okozala sembo tango okozwa mokano, mpe okozala na pamela te tango okokata makambo.

[7] Solo, nabotamaki kati na lisumu ; wuta na libumu ya mama na ngai, nazali mosumuki.

[8] Nzokande Yo, osepelaka na bosembo, ata kati na libumu ; mpe okoteya ngai bwanya kati na esika ebombama.

[9] Petola ngai na nzela ya izope, mpe nakokoma peto ; sukola ngai, mpe nakokoma pembe koleka mvula ya pembe.

[10] Sepelisa ngai mpe yokisa ngai nsayi na motema ; mpe mikuwa na ngai oyo obukaki ekosepela makasi.

[11] Kotala lisusu masumu na ngai te, mpe longola bambeba na ngai nyonso.

[12] Oh Nzambe, mpo na ngai, kela motema ya peto ; mpe kati na ngai, yeisa molimo sika mpe elenda.

[13] Kobengana ngai te mosika ya elongi na Yo, mpe kolongola te kati na ngai Molimo Mosantu na Yo.

[14] Zongisela ngai esengo ya lobiko na Yo, mpe kabela ngai molimo oyo emibongisi malamu mpo na kolendisaka ngai.

[15] Nakoteya banzela na Yo epai ya babuki mibeko, mpe bato ya masumu bakozonga epai na Yo.

[16] Oh Nzambe ! Nzambe, Mobikisi na ngai, kangola ngai wuta na mokumba ya makila, mpe lolemo na ngai ekosakola bosembo na Yo.

[17] Nkolo, fungola bibebu na ngai, mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.

[18] Mpo ete osepelaka na mbeka te, nakobonza te mbeka ya kotumba oyo ondimaka te.

[19] Nzambe, bambeka oyo osepelaka na yango ezali : molimo oyo ebukani. Nzambe, oyinaka te motema oyo etutami mpe emikitisi.

[20] Na ngolu na Yo, salela Siona bolamu, tonga bamir ya Yelusalemi.

[21] Bongo okosepela na bambeka ya bosembo, bambeka ya kotumba mpe makabo ya kokoka ; mpe bangombe ya mibali ekobonzama na bitumbelo na Yo.

Banzembo — Chapters