[1] Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
[2] Eyembamaki na lindanda tango bato ya Zifi bayaki koyebisa Saulo : « Davidi abombami kati na biso. »
[3] Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo, longisa ngai na nzela ya nguya na Yo.
[4] Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, yoka maloba ya monoko na ngai.
[5] Bapaya batelemi mpo na kobundisa ngai ; mpe bato na kanza bazali koluka koboma ngai, batalelaka Nzambe te.
[6] Tala, Nzambe azali lisungi na ngai, Nkolo azali eyekamelo na ngai.
[7] Tika ete akweyisela bayini na ngai mabe ! Kati na boyengebene na Yo, bebisa bango.
[8] Nakobonzela Yo mbeka na motema malamu, nakokumisa Kombo na Yo, Oh Yawe, pamba te ozali malamu.
[9] Okangoli ngai na pasi nyonso ; mpe miso na ngai etali lokola molongi ya banguna na ngai.