Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:12

[1] Yawe azali kokonza ; tika ete bato balenga ! Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe ; tika ete mabele eningana !

[2] Yawe azali monene kati na Siona, mpe Bokonzi na Ye ezali likolo ya bikolo nyonso.

[3] Tika ete Kombo na Yo ya monene mpe ya somo esanzolama ; ezali bule !

[4] Mokonzi azali na nguya, alingaka bosolo. Olendisaka bosembo. Osalaki bosembo mpe bosolo kati na Jakobi.

[5] Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye ; azali Mosantu.

[6] Moyize mpe Aron kati na Banganga-Nzambe na Ye, mpe Samuele kati na bato oyo bazalaki kobelela Kombo na Ye, bazalaki kobelela Yawe, mpe Ye azalaki koyanola bango.

[7] Azalaki koloba na bango kati na likonzi ya lipata. Babatelaki malako na Ye mpe mibeko oyo apesaki bango.

[8] Yawe, Nzambe na biso, oyanolaki bango. Mpo na bango, ozalaki Nzambe oyo alimbisaka atako opesaki bango etumbu mpo na misala na bango ya mabe.

[9] Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama na kotala na ngambo ya ngomba na Ye ya bule. Pamba te Yawe, Nzambe na biso, azali bule.

Banzembo — Chapters