[1] Bino bato ya sembo, bobeta milolo ya esengo na tina na Yawe ! Kokumisa Nzambe ebongi na bato oyo bazali alima.
[2] Bosanzola Yawe na nzenze, bosanzola Ye na lindanda ya basinga zomi.
[3] Boyembela Yawe nzembo ya sika, bobetisa bibetelo mindule elongo na koganga ya esengo.
[4] Pamba te Liloba na Yawe ezali alima, misala na Ye nyonso ekokisamaka na boyengebene.
[5] Yawe alingaka bosembo mpe alima ; mokili etondi na bolingo na Ye.
[6] Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ; mampinga na yango nyonso, na nzela ya pema ya monoko na Ye.
[7] Asangisaka mayi ya bibale minene esika moko, mpe atiaka yango na bisika ya mozindo.
[8] Tika ete mokili mobimba etosa Yawe ! Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga liboso na Ye.
[9] Pamba te alobaki, mpe likambo esalemaki ; mpe apesaki mitindo, mpe emonanaki.
[10] Yawe akweyisaka mikano ya bikolo, abebisaka mabongisi ya bato.
[11] Kasi mikano ya Yawe etikalaka mpo na seko, mabongisi ya motema na Ye, mpo na bikeke nyonso.
[12] Esengo na ekolo oyo Yawe azali Nzambe na yango. Esengo na bato oyo aponaki mpo na libula na Ye.
[13] Yawe atalaka wuta na likolo, amonaka bana nyonso ya bato.
[14] Wuta na evandelo na Ye, atalaka bavandi nyonso ya mokili.
[15] Ye oyo asalaka mitema nyonso ya bato asosolaka makambo nyonso oyo basalaka.
[16] Ezali te limpinga monene nde ebikisaka mokonzi to nguya monene nde ekangolaka elombe.
[17] Mpunda ezali na nguya te ya kopesa lobiko, makasi na yango nyonso ekangolaka te.
[18] Nzokande Yawe atalaka bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batiaka elikya na bolingo kati na Ye,
[19] mpo na kokangola bango na kufa mpe kobatela bango na bomoi ata na tango ya nzala makasi.
[20] Totielaka Yawe motema ; azali lisungi mpe nguba na biso.
[21] Solo, mitema na biso esepelaka kati na Ye, pamba te totiaka elikya na biso kati na Kombo na Ye ya bule.
[22] Yawe, lokola totiaka elikya na biso kati na Yo, tika ete bolingo na Yo ezala elongo na biso.