Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:08

[1] Nzembo ya Davidi. Yawe, longisa ngai na miso ya basambisi, pamba te natambolaka na bosembo ; natielaka Yawe motema, nakozonga sima te.

[2] Yawe, tala ngai malamu mpe meka ngai, sosola motema mpe makanisi na ngai,

[3] pamba te napengwaka te liboso ya bolingo na Yo mpe nabikaka bomoi na ngai kolanda bosembo na Yo.

[4] Navandaka esika moko te na bakosi, natambolaka nzela moko te na bato ya mitema mibale.

[5] Nayinaka kosangana elongo na bato ya misala mabe mpe navandaka te esika moko na bato mabe.

[6] Yawe, nasukoli maboko na ngai mpo na kolakisa ete nasali mabe te, mpe nabandi na etumbelo na Yo,

[7] mpo na kozongisela Yo matondi mpe kotatola misala minene na Yo.

[8] Yawe, nasepelaka na Tempelo epai wapi ovandaka elongo na nkembo na Yo.

[9] Kolongola te molimo na ngai nzela moko na bato ya masumu, bomoi na ngai elongo na basopi makila,

[10] oyo maboko na bango etondi na makila, mpe maboko na bango ya mibali etondi na kanyaka.

[11] Natambolaka na bomoi ya bosembo ; kangola ngai mpe salela ngai ngolu.

[12] Makolo na ngai etambolaka na nzela ya alima ; nakopambola Yawe kati na mayangani ya monene.

Banzembo — Chapters