[1] Nalingaka Yawe, pamba te ayokaka mongongo mpe mabondeli na ngai.
[2] Ayokaki ngai ; boye nakobelela Ye bomoi na ngai mobimba.
[3] Minyololo ya kufa ezingelaki ngai, somo ya mboka ya bakufi ekangaki ngai ; nakomaki moto ya pasi mpe ya mawa.
[4] Kasi nabelelaki Kombo ya Yawe : « Yawe, nabondeli Yo, bikisa ngai ! »
[5] Yawe asalaka ngolu mpe azali sembo, Nzambe na biso ayokelaka bato mawa.
[6] Yawe abatelaka bato oyo bazangi mayele. Nalembaki nzoto, kasi abikisi ngai.
[7] Molimo na ngai, zongela kimia na yo, pamba te Yawe asaleli yo bolamu.
[8] Solo, okangoli ngai na kufa, okawusi mpinzoli na ngai mpe obateli makolo na ngai ete ekweya te.
[9] Nakotambola liboso ya Yawe kati na mokili ya bato ya bomoi.
[10] Solo, nazalaka na elikya, ezala soki nalobaka : « Nazali moto na pasi makasi. »
[11] Kati na mitungisi na ngai, nazalaki komilobela : « Bato nyonso bazali bakosi. »
[12] Nini nakoki kozongisela Yawe mpo na bolamu na Ye nyonso epai na ngai ?
[13] Nakotombola kopo ya elonga mpe nakobelela Kombo ya Yawe.
[14] Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe na miso ya bato na Ye nyonso.
[15] Kufa ya bayengebene ya Yawe ezali na motuya makasi na miso na Ye.
[16] Yawe, yoka ngai, nazali mosali na Yo. Nazali mosali na Yo, mwana mobali ya mwasi mosali na Yo. Ofungoli minyololo oyo ekangaki ngai.
[17] Nakobonzela Yo mbeka mpo na kozongisa matondi, mpe nakobelela Kombo ya Yawe.
[18] Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe na miso ya bato na Ye nyonso,
[19] kati na lopango ya Tempelo ya Yawe ; kati na yo, Yelusalemi. Bokumisa Yawe !