Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:39

[1] Nzembo ya Davidi mpo na libulisi ya Tempelo.

[2] Yawe, nanetoli Yo, pamba te obimisaki ngai na libulu ya mozindo mpe otikaki te banguna na ngai kosepela na tina na ngai.

[3] Yawe, Nzambe na ngai, nabelelaki Yo mpo na kosenga lisungi, mpe obikisaki ngai na bokono.

[4] Yawe, obimisaki ngai na mboka ya bakufi, obatelaki bomoi na ngai mosika na bato oyo bazali kokita na libulu.

[5] Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye ; bokumisa Kombo na Ye ya bule.

[6] Pamba te kanda makasi na Ye ewumelaka mpo na mwa tango moke, kasi ngolu na Ye ewumelaka seko na seko ; kolela ekoki kowumela kino na pokwa, kasi kosepela ekokota na tongo.

[7] Tango nazalaki na kimia, nalobaki : « Nakotikala kokweya te. »

[8] Yawe, tango osalelaki ngai ngolu, olendisaki ngomba na ngai ; kasi tango obombelaki ngai elongi, nabungisaki elikya.

[9] Yawe, nabelelaki Yo ; nabelelaki Yawe mpo na kosenga lisungi :

[10] « Litomba nini ezali soki nakufi, soki nakiti na libulu ? Boni, putulu ekokumisa Yo ? Boni, ekosakola boyengebene na Yo ?

[11] Yawe, yoka ngai mpe salela ngai ngolu ; Yawe, zala lisungi na ngai. »

[12] Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina ; olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,

[13] mpo ete molimo na ngai ekumisa Yo na banzembo, kasi navanda nye te. Yawe, Nzambe na ngai, nakokumisa Yo libela na libela.

Banzembo — Chapters